Mawa na bayembi oyo bapesi Nzambe mokongo !

Kozala moyembi ezali mosala mosantu ya bokonzi. Akomi moyembi te oyo alingi; akomi moyembi te oyo alobi ete azali na mongongo kitoko. Lokola mosali nyonso, babotamaka moyembi, boye babongisami pe bapesamaka makabo uta na mokili mosusu. Na mawa, bayembi ya lelo bayebi lisusu motuya na bango te mpo bakomi kotala biloko ya mokili na koluka mbongo...

Mawa na bayembi oyo bapesi Nzambe mokongo !

Nazali kotinda lobela ya bozalani oyo kolongwa epai na Nzambe epai ya bayembi nyonso oyo balobaka ete basambetaka pe batombolaka Ngai na mangomba: kozala moyembi ezali mosala mosantu ya bokonzi. Akomi moyembi te oyo alingi; akomi moyembi te oyo alobi ete azali na mongongo kitoko. Ndenge ezalaka na mosali nyonso oyo naponi, babotamaka moyembi, boye babongisami pe bapesamaka makabo uta na mokili mosusu.

Na mawa, bayembi ya lelo bayebi lisusu motuya na bango te mpo bakomi kotala biloko ya mokili, na koluka mbongo, ndenge bolobaka tango nyonso. Bino bayembi ya lelo, bosalaka lisusu te oyo Natindaki bino kosala na mokili. Na likambo oyo, ndenge nini bolobaka ete bosambetaka Ngai soki Nazali lisusu te motuya na bino?

Mbuma ya boponi na bino ekweyeli bino mpo ete bozali lisusu na makanisi moko te; liloba moko te na bino eyaka uta na Ngai Nzambe mpo na kosala, kosimba, kobongola mpenza bomoi ya bato na Ngai: bozali mpamba.

Bobikaka na moi mobimba na malamu te, na kosalela biloko ya mokili oyo. Boyebi te ete Nazali Ye oyo azali na wolo pe palata? Bozali kotala oyo mokili epesaka bino kasi oyo Ngai, Nzambe na bino, Nabombeli bino te. Bomitunaki na koyeba mpo na nini na ebandeli bozalaka moyembi pe na suka, bokomona biomei kosala mpo na mokili, na bomoi ya monzoto, na koluka kondimama pe nkembo ya mokili? Solo, likambo oyo ekomelaka bino mpo ete bozalaka te na bondeko na Ngai Nzambe, bozalaka te na bomoi ya bosantu.

Bomoi oyo boponaka kobika na mokili ezipi bino na mbindo ya molimo oyo elongolaka bino mosika na Ngai. Yango elongolaka bino nzela nyonso ya kopesa Ngai nkembo, ya kosambela Ngai. Boyeba ete nazali koyoka ata ndenge moko te na makambo nyonso oyo bosalaka. Mpo ete bomipesi mobimba mosika na mosala na Ngai, mpo na koyemba ya mokili, nzoka boponama pe bobengama na ebandeli mpo na kosala mosala na Ngai. Ndenge nini ekoki kosalema moto akoka kosalela Nzambe pe zabolo mbala moko?

Nazali na mpasi komona makambo nyonso oyo. Nazali na mpasi komona ete ata bato oyo bapesaka Ngai nkembo na solo bamitiki kokangama na zuwa pe kotondama na baninga: mpo na nini oyo ayembi malamu koleka ngai? Mpo na nini oyo asepelisi bato mingi koleka ngai? Bamosusu bazali kutu kokoba kosala mabe na bazalani na bango, koloba mabe na basusu. Bokoki te koloba ete bosalelaka Ngai na makanisi yango ya mabe pe ya molili. Bozali na bolingo moko te na mitema na bino. Nzoka, moto moko te akoki kosala mosala na Ngai soki akoki te koyoka bolingo mpo na bazalani na ye. Nalobaki na bino pe Nazongi koloba: "Okoyina ndeko na yo te na motema na yo;... Okolinga mozalani na yo ndenge omilingaka yo moko" (Lévitique 19:17,18).

Bomizwa, bobongola mitema, botika nzela nyonso oyo ya lokuta, boluka mpenza elongi na Ngai liboso ete ekoma suka. Boloba te ete bozali na ntango, mpo Nazali kaka Nkolo ya ntango pe ya makambo. Yango wana, Nalobi na bino ete ntango ekoki lisusu te mpo na bino. Soki bozali elongo na Ngai, to bozali te.

Ezali lisusu te na ndambo na ndambo, mpo Nazali koluka bato ya solo pe ya mpenza oyo bakosambela Ngai na Molimo pe na Solo; oyo bakolanda Nzela na Ngai, Mibeko na Ngai; oyo bakozala pene na kosala mosala na Ngai pe Bolingi na Ngai; oyo bakozwa makanisi uta na Ngai, bakotonda na Makasi na Ngai, na Maloba na Ngai; oyo bakozala ntango nyonso na bondeko na Ngai, bakotala kosalela Ngai na solo.

Likebisi ya suka: boyeba ete Namoni pe Nayebi makambo nyonso oyo. Ntango ekomi lisusu te ya kosepela mpo ete ekomi ntango ete Nasala kopetola mobimba ya Mokili.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Malheur aux chantres qui tournent le dos à Dieu !", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Source Ph. illustration: www.hiclipart.com