Basakoli ya lokuta ya mikolo ya sika
Mpamba te baklisto ya lokuta pe basakoli ya lokuta bakotelemana; bakosala bikamwa minene pe bilembo ya kokamwa, na ndenge ya kokosa, soki ekokaki kosalema, ata baponami...

Eleki sika mibu nkoto mibale, Yesu azalaki kokebisa bato ya mokili nzoka ye moko asilisaki naino te mosala na ye ya kosunga. Mpasi ya Yesu ezalaki makasi mpo ete amonaki makambo ya bokosi pe mikumba ya basakoli ya lokuta na kobungisa ya bana ya Nzambe. Yango wana, lokola likebisi, asakolaki makambo oyo esengelaki kosalema, na nsango oyo: "...Mpamba te baklisto ya lokuta pe basakoli ya lokuta bakotelemana; bakosala bikamwa minene pe bilembo ya kokamwa, na ndenge ya kokosa, soki ekokaki kosalema, ata baponami" (Matthieu 24:24).
Na Bolingo, Yesu apesaki bilembo oyo ekosalisa bato ya Nzambe koyeba basakoli ya lokuta tango ekokoka: "Bobatelama na basakoli ya lokuta. Bayaka epai na bino na bilamba ya bameme, kasi na kati bazali bambwa ya zamba ya mabe" (Matthieu 7:15).
Atako makebisi nyonso ya Yesu, bato bamitikaka bakangama na mitambo ebele pe lokuta mingi ya basakoli ya lokuta oyo bazali na bisika nyonso mikolo oyo. Mosakoli moko na moko apesaka makanisi pe mayele na ye mpo na kokanga bato oyo babungisi nzela ya molimo. Basakoli bazali kosalela mpamba elikya ya bana ya Nzambe pe bazali kopesa bango mayi ya mbindo na esika ya mayi ya malamu, ngomba ya kaimani na esika ya mafuta ya nzoyi...
Nyonso wana ezali kopesa Nzambe mpasi; Nzambe azali na mpasi. Yango wana, na suka ya mikolo, Atindi nsango ya suka ya likebisi epai ya basakoli ya lokuta:
"Nalobaka na bino baoyo bobengi biomei basakoli, bozali mpenza na makanisi ya oyo babengaka mosakoli pe lisakoli? Na bokeseni na oyo bokoki komona pe kondima, Nalingi koyebisa bino ete babotamaka mosakoli, bakomiaka te mosakoli mpo ete ezali Ngai, Nzambe Na Nguya Nyonso nde aponamaka, atelemisaka pe abonzaka basakoli na Ngai. Akomiaka mosakoli te nani azali na mposa to kaka mpo na matomba na ye moko.
Nazali Ye oyo atindaka mosakoli na mosala kati ya bino bato. Mpo na kosala yango, ye asengeli koloba liloba na liloba Maloba oyo eyaka uta epai na Ngai, kobakisa te, kolongola te ezala nini. Asengeli kosala kozanga makanisi ya motema pe koloba mpenza oyo Nasengi ye aloba.
Ezali malamu koyeba ete Nakengaka basakoli na Ngai moko uta kala. Liloba nyonso ya solo oyo ekobima na mosakoli na Ngai moko ebengami lisakoli [1]. Masakoli oyo eyaka uta na Ngai, Nzambe Na Nguya Nyonso, ezalaka semba mpo etelemi na Mibeko ya Nzambe pe elobamaka te mpo na kolongisa to kobebisa moto songolo to pakala.
Lelo, likambo ezali mabe koleka mpo ete bato nyonso oyo babengi bango basakoli bamonanaka na basonge ya balabala nyonso, "kosakola" na lolenge na bango. Wapi bawuti bato wana ya lokuta oyo babengi bango basakoli, nzoka Ngai nayebi bango te? Nazali Ye oyo atelemisaka basakoli te? Mpo na nini, bato wana oyo babengi biomei basakoli balekisaka ntango na bango koloba, koyebisa lokuta na bato na Ngai?
Bomizwaka esika, mokumba oyo boyebi motuya na yango te, soki ezali kaka te mpo na matomba na bino to mpo na bomengo. Na kosala boye, bofingaka mosala oyo eyaka uta na Ngai. Bomibengisaka mosakoli kozanga kozala na bondeko elongo na Ngai. Boye, bondima ete bozali bamoni makambo kasi basakoli te. Bopesaka maloba ya lokuta, na sima bozalaka kozela lifuti na mbongo, bino, basakoli ya lokuta. Bosambetaka banzambe ya komona makambo mpo na kokosa bato na Ngai pe koyiba bango. Na ndenge wana, bozali kosala lokola miyibi mpenza.
Nalobaka polele te tango Nalobi na Mobeko na Ngai ya Yambo: "Nazali Yawe Nzambe na yo, okozala na banzambe mosusu te liboso na Ngai"? Na bisaleli na bino, bobongoli lingomba ekoma zando: botekaka mabondeli, mayi, malasi, basapele, minda, mafuta ndenge na ndenge..., atako Mobeko na Ngai ya sambo kati na Mibeko Zomi ekebisaka bino: "Okoyiba te".
Bizaleli na bino ya mabe, lokuta na bino pe mabunga na bino elongolaka bato na Ngai mosika na mosika uta na Ngai na ndenge ete bakotya lisusu elikya na Ngai te. Mpo ete botie mawa, kozanga elikya, kozanga kondima na mitema na bango. Mpo na nini bozali kobebisa nkombo na Ngai na ndenge oyo nzoka bolobaka ete bolingaka Ngai pe bozali kosala mosala na Ngai? Bobosani Mobeko na Ngai ya Mibale oyo epekisaka bino kosalela Nkombo na Ngai Mosantu mpamba? Bozali bambwa ya zamba bamizipaki, bayibi na soni te. Mpo na nini bozali kosala boye?
Likambo ya sikawa ezali mabe koleka mpo ete ata basakoli ya solo, batindami na Ngai, bazali kotika mosala na Ngai mpo na biloko ya mpamba ya mokili oyo.
Bino, basakoli ya lokuta pe basakoli oyo babunga nzela, bozali bakosi. Bobatela na bizaleli na bino ya lokuta pe ya mabe. Bobatela mpo ete Kongenga ya Kanda na Ngai Mosantu ezali mosika na bino te. Bobatela!"
[1] Lisakoli ezali Liloba ya solo epesami na Nzambe, na sima eyambami pe etalisami mobimba epai ya bato na nzela ya mosakoli ya solo ya Nzambe. Yango wana, Mosakoli azali Motindami ya Nzambe oyo asalaka lokola monoko ya Nzambe kolobaka na bato.
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Faux prophètes des temps modernes", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com