Bandimi ya lokuta ya mangomba

Likambo ya bololo ezali ete bandimi mingi ya masanga ya losambo bandimaka te kobukama. Mpo na koyenga na bango pe kozanga bwanya, batungisaka ba oyo bazwi mokano ya kosala mpenza mosala na Ngai...

Bandimi ya lokuta ya mangomba

Kokende na lingomba, ezali koluka elongi ya Nzambe, ezali koluka kokoma na molimo be, ezali komipesa na kobika na kobanga Nzambe, na ntango nyonso pe na bisika nyonso. Akendaka na lingomba oyo alingi koyekola koyeba pe kotia bomoi na ye na Mibeko, na Mitindo pe na Bolingi ya Nzambe. Akendaka na lingomba oyo alingi kobongola motema, oyo andimi kobukama pe aluka lisalisi mpo na kobongisa mbeba pe mabunga na ye. Ete lingomba ekoki to ekoki te kokokisa mposa oyo ya bana ya Nzambe ezali likambo mosusu.

Likambo ya bololo ezali ete bandimi mingi ya masanga ya losambo bandimaka te kobukama. Mpo na koyenga na bango pe kozanga bwanya, batungisaka ba oyo bazwi mokano ya kosala mpenza mosala na Ngai. Batelemaka ngangu liboso ya bato nyonso oyo bandimaka kobukama, bato nyonso oyo bandimaka bayebisa bango solo mpo na kobongola bomoi pe kobika kati na Yesu Klisto. Batombokaka na bato oyo bandimaka kobongola pe bayokaka nkanda na ntina ete bato yango bazali kokesana na bango.

Bandimi wana oyo bayengi, na bizaleli ya ndenge mosusu, basalaka bongo mpo ete bondimaka lisusu te bizaleli na bango ya mayele mabe pe misala na bango ya soni. Mpo na yango, basambisaka bino mokolo mobimba pe balobaka ete ezali nde bino bozali na nzela ya malamu te.

Bokendaka na lingomba nini mpo bozala na bizaleli ya kokamwa boye? Bondimaka te ete batalisaka polele mbeba na bino, ete babukaka bino pe bolobaka ete bosalelaka Ngai. Botondisami na bizaleli na bino ya kala ya mabe pe bozali pene te na kolongola "ngai" na maloba na bino. Bozali ntango nyonso koloba: "ngai, nazali boye to boye; ngai, bayebisaka ngai te boye to boye; ngai, basalaka ngai te boye to boye...". Na suka, bozali banani?

Soki boboyi komipikola, komibuka, kolongwa na bizaleli na bino ya kala ya mabe, elingi koloba bozali pene te na Kosalela Ngai, Yawe Nzambe.

Ezali solo ete moko na moko na bino azali na bizaleli pe etamboli na ye, atako ezali ndenge nini. Kasi soki bolingi mpenza kotambola elongo na Ngai Nzambe, bosengeli mpenza kobongola bomoi mpo bozala kokokana na Mibeko pe Mitindo na Ngai. Ezali boye, ndenge mosusu te.

Bozali na mpiko ya kosenga ndimbola na bato oyo bazali kosala mosala na Ngai nzoka bozali pene te na kolanda bandakisa ya malamu mpo na kobongola bomoi. Bozali nani mpo na kosala yango?

Bosalaka makanisi ya bozoba ndakisa: "uta ntango nini babongwanaka soki babelemi Nzambe?"; "biso mpe, tobelemaka Nzambe, kasi tozali kaka ndenge moko..." Bosambelaka na biblia nini? Elobamaki te: "Soki moto azali kati na Klisto, azali ekelamu ya sika. Makambo ya kala [bizaleli ya kala ya motema pe ya molimo] eleki; tala, makambo nyonso ekomi ya sika [moto ya sika ayei]. Pe nyonso wana eyei na Nzambe oyo azongisaki biso boyokani na ye na nzela ya Klisto..." (2 Corinthiens 5:17-18).

Bolobaka ete botangaka biblia nzoka bososolaka eloko te. Mpo na nini bozali na makanisi nyonso wana ya ndenge mosusu? Botika bato oyo balingi kosalela Ngai basala yango na lipamboli na Ngai pe na nse ya lisungi na Ngai oyo ekosila te.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Faux croyants des églises", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Ph. illustration : istockphoto.com