Bato bakoki te kotelemela Nzambe
Yeba ete bato bakoki te kotelemela ngai kozanga etumbu. Lisusu, bosengeli koyeba ete basali nyonso ya Nzambe, oyo bazali na elikya te, bakondamnama na lifelo, tango bakokufa. Nzokande, baye bakoki kosalela ngai lisusu bakonyokwama kino bakozonga epai na Ngai. Mpo na yango, bakozwa elonga te na nyonso bakosala na bomoi na bango. Bakokutana na makambo ya malamu te, bakolonga te, bakobela bokono sima na bokono, mpe bakoyoka mawa mingi. Baye napesaki mbongo mingi, bakobungisa yango; baye bazalaki bato ya lokumu na société, bakosuka na soni mpe pasi. Bamosusu bakobungisa mosala na bango mpe litomba nyonso oyo ekoki kozala na misala na ngai...

Nazali Nzambe Mokonzi, Mokeli ya mabele nyonso. Nazali Mokeli na bino. Moto akoki kotelemela ngai te mpamba te Mokano na ngai ezali makasi lokola ebende, ndenge moko na Mibeko na ngai ya Bulee mpe Mitindo na ngai Zomi. Oyo nalingi esengeli kozala, atako ekozwa ntango boni. Nazali na liloba ya suka. Nazali Mokonzi ya ntango mpe makambo nyonso te? Nani akoki kotelema liboso na ngai?
Basali ebele ya Nzambe, mibali mpe basi, bazwi bonsomi ya koboya kosala mosala na ngai, nzokande bazali na ntina mosusu te na bomoi na bango kaka kosala mosala na ngai. Bondimaki kobotama na mokili mpo na kosala mosala na ngai. Liboso ya kobotama na bino, bolapi ndai na mokili mosusu, mpo na kosala misala na ngai ya minene ya bolingo mpe ya kobikisa bana na ngai oyo babungi nzela mpe molende ya molimo na mabele. Mpo na nini, na tango ya kokokisa misala na bino, bopesi ngai mokongo mpo na bisengo mpe bilengi ya mokili oyo? Boyebi te ete bozali na mokili oyo, kasi bozali ya mokili oyo te?
Basali na ngai ya minene pene nyonso bazali na maboko ya satana mpo na kobebisa bana na ngai. Mokolo na mokolo, basali na ngai bakomikotelisa na kindoki, na mayele ya mabe, mpe basalaka makasi mpo na kosalela satana. Bango bandimaka na mposa nyonso koboya ngai, mpe baboyaka kokokisa misala na bango na kobuka ndai oyo basalaki na mokili mosusu. Na yango, bayembi bakomi bato ya sango na miziki ya mokili ya satana; basakoli bakomi basakoli ya lokuta; basakoli basi bakomi bato oyo basololaka na molimo python; bamoni bakomi bamoni ya lokuta; bantoma bakomi "balakisi ya mibeko", babongoli mabe ya nsango na ngai ya Solo. Basali ya Nzambe bayokaka zuwa, bayinaka, mpe bayebisaka makambo ya lokuta na basali mosusu; basali basi ya Nzambe babebisaka libala ya basi mosusu oyo basengeli kosunga na ndenge ya molimo. Basali mosusu basi ya Nzambe bakomi bafluenceuses oyo bakambaka bana na ngai ya basi na mobulu, na pite, na potopoto ya molimo. Basali ya Nzambe, mibali mpe basi, babebisaka bana na ngai na kotiaka bango na drogue, masanga, kosangisa nzoto na ndenge ya maladi, pite, bolingo ya mbongo, mobulu, etc.
Lelo, ekomi lokola mode na basali ya Nzambe, mibali mpe basi, bazali kopota mbangu kotonga mangomba mpo na mombongo na bango. Mpo na nini bozali kosala libunga ya kondima ete mosali nyonso ya Nzambe asengeli kotonga mpe kokamba lingomba? Sikawa, ezali lisusu tango ya kotonga mangomba te; ezali mingi, ya lokuta. Nasengi bino kozala bansomi na maboko ya mangomba mpo na kokende kotatola Solo na ngai ya Solosolo bipai nyonso esengeli. Ezali na misala mingi ya kosala, ya kobongisa na bisika nyonso ya mokili na bino: science, monganga, teknoloji, molimo, mode, etc. Mpo na yango, bobotamaka, bokokaka, mpe bosalelaka na bisika oyo ekokani na misala na bino. Eloko moko te ezali mpamba. Natongaka nyonso yango na ndenge ya suka ya Nzambe. Natiyaka bino na boyokani na bato oyo basengeli kosangana na misala na bino. Napesaka bino bozwi, bokonzi ya mabele mpo na kosala mosala na ngai, kasi bolingaka kosalela satana.
Mpo na nini bozali kosala makambo nyonso wana? Bozali na motema makasi, atako nalobaka na bino mbala na mbala. Yeba ete bato bakoki te kotelemela ngai kozanga etumbu. Lisusu, bosengeli koyeba ete basali nyonso ya Nzambe, oyo bazali na elikya te, bakondamnama na lifelo, tango bakokufa. Nzokande, baye bakoki kosalela ngai lisusu bakonyokwama kino bakozonga epai na Ngai. Mpo na yango, bakozwa elonga te na nyonso bakosala na bomoi na bango. Bakokutana na makambo ya malamu te, bakolonga te, bakobela bokono sima na bokono, mpe bakoyoka mawa mingi. Baye napesaki mbongo mingi, bakobungisa yango; baye bazalaki bato ya lokumu na société, bakosuka na soni mpe pasi. Bamosusu bakobungisa mosala na bango mpe litomba nyonso oyo ekoki kozala na misala na ngai.
Bokofunda na lokuta bandoki mpe milimo mabe ete bazali na moboko ya mikakatano na bino. Ekozala bongo te. Nakosala ete bozala kaka kozunguluka kino bokana kozonga na sima mpe kosala mosala na ngai. Soki bokangami na koboya kosalela ngai, boye, nakozala na mposa ya kolongola bino na mokili mpo na bobateli ya bana na ngai. Nakosala bongo, mpo na koyanola na ekateli na bino moko ya kokomisa mokuse kozala na bino na mokili, mpamba te ntina kaka ya kozala na bino na mokili ezali kosalela ngai, kokokisa mosala oyo napesaki bino. Tika ete baye bazali na matoyi ya koyoka, bayoka.
Bato nyonso oyo bakoki kosangisa makasi na bango ya suka mpo na kotombola moto na mosala, basengeli koyeba ete nazali Nzambe ya Bolingo mpe ya Mawa. Nayebaka koyina te, kasi natangaka moto na ntango ya sikawa. Soki kaka botali na ngambo na ngai, na mposa makasi ya kosalela ngai lisusu, natindeli bino mbala moko bobateli na ngai na nzela ya Molimo Mosantu mpe banzelu nyonso oyo bakosalisa bino na kolamuka na bino ya molimo. Nakozongisa bino na makabo mpe nguya na bino, soki mposa na bino ya kosalela ngai ezali ya solo. Mpo na yango, bosengeli koleka na mpiko, na komikaba mpe na kokanga motema, na mitambo nyonso ya komekama na kondima oyo nakosala ete bomeka yango. Ekoki kozala ndenge mosusu te.
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "On ne tient pas tête à Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.freepik.com