Basi, bokangola mokili oyo !

Mosala ya likolo koleka oyo Napesaki na mwasi, ezali kobongisa mabele, kobanda na Bokeli mobimba, na sima kokomisa ya molimo pe kosalisa na bopeto pe komata ya bato. Mosala oyo ya malamu esengeli kosalema na boyengebene oyo Nazali komona lokola ngolu ya likoliki ya mwasi nionso...

Basi, bokangola mokili oyo !

Mosala ya likolo koleka oyo Napesaki na mwasi, ezali kobongisa mabele, kobanda na Bokeli mobimba, na sima kokomisa ya molimo pe kosalisa na bopeto pe komata ya bato. Mosala oyo ya malamu esengeli kosalema na boyengebene oyo Nazali komona lokola ngolu ya likoliki ya mwasi nionso. Mpamba te boyengebene ezali na kati na yango bopeto oyo limemia na yango esengi na mwasi kokengela misala na ye, maloba na ye pe makanisi na ye, etc.

Mpo na oyo azali na ebandeli pe mpo na mosala oyo Napesaki ye, Namoni mwasi lokola mosoloki ya miso na Ngai. Mpe, nayokaka mawa komona ete mwasi amitikaka kofingama, kosekisama pe konyokolama mokolo mobimba. Bino basi, boyebi mpenza mosala nini bosengeli kosala na mokili oyo? Boyebi ndenge nini pe mpo na nini bokelamaki na Ngai Nzambe na bino?

Bino nyonso boyekolaki ete bokelamaki na mobanga ya mobali, ntango azalaki kolala. Nandimi yango. Kasi boyebi mpo na nini Nasalaki mobali alala mpo na kokela bino?

Mwasi, ozali mosoloki ya miso na Ngai mpo ete na yo, Natiaki makasi, bolingo, kobonga be, boboto, ya molimo. Na yo moko, Nasangisaki nyonso oyo ezali na motuya. Soki monguna alekaki na yo mpo na kokweyisa mokili, ezali mpo ete ayebaki ete na maboko na yo, Natiaki mokili oyo.

Ezali Ngai Nzambe nde nakelaki yo, pe Nayebi ete ozali na motuya, boye mpo na nini otikaka monguna ayebisa yo eloko mosusu? Tala mwa moke makambo oyo ezali kosalema na mabota: monguna abundaka tango nyonso bato oyo bazali minene, oyo bazali na monzoto monene mpo ete bakoka te kobima. Ezali ndenge moko na yo oyo ozali na mosala ya likolo koleka ya mokili; monguna abundaka yo mpo na kolongola yo na mosala oyo ya lokumu. Yango wana, yo mwasi, otikaka kobetama, koyokama soni, kofingama, konyatama... Oyo ezali malamu te, kasi monguna asalaka boye mpo ete ayebi ete ozali na motuya, pe ete okoki kobongola makambo mingi na mokili oyo. Boye, mpo na nini omikitisaka, mwasi? Mpo na nini omitikaka kobebisama? Mpo na nini otikaka monguna ayebisa yo ete ozali na ntina te? Yeba ete ozali momemi ya bomoi.

Lelo, mwasi, omitikaka kokosama na zabolo na lolenge na yo ya kolata, komesana pe olobaka kaka na ntina ya mode. Opesaka limemia mingi, motuya mingi na biloko ya mokili koleka yo moko. Omimonisaka na maloba ya mabe. Obosani mosala na yo pe otikaka nzala mabe ekota na yo.

Nalobaka tango nyonso ete mwasi azali motole mpo na mobali na ye. Kasi, ekomi ndenge nini na motole oyo ozali? Oyebi penza motuya na yo? Soki okoki kotonga pe kobebisa, elingi koloba ete ozali na nyonso na maboko na yo. Mpo ete ozali lisungi.

Na esika ya kobungisa ntango na yo na koluka kosala makapo na mobali, luka nde komipesa limemia yo moko pe komipesa motuya, liboso ete moto mosusu asala yango. Okanisi ete soki omipesi motuya pe limemia, okondima komipesa na pite, na maloba ya mabe pe na bilamba ya mabe?

Mwasi, opesi limemia te na Mibeko pe Mitindo na Ngai, oyebi eloko te na Maloba na Ngai nyonso, opesi limemia te na yo moko. Oyebi makasi nini natiaki na yo? Okoki kobunda pe kolonga monguna. Boye, ozali kozela nini mpo na kolamuka? Ozali kozela nini mpo na kozonga epai na Ngai Nzambe na yo, pe kokokisa mosala oyo Napesaki yo?

Mwasi, ezali tango ete otelema mpo na kokangola mokili oyo, mpo na kozongisa solo pe kobongisa mbeba oyo esalemaki.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Femmes, libérez ce monde !", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Ph. Illustration: pinterest.com