Lobiko ezali kati na Kobanga Nzambe
Lingomba moko te, ndako ya mibeko te, mimeseno te, moto moko te azali na bafungola ya lobiko na bino. Kaka bomoi kati na kobanga Nzambe nde efungolaka bino bikuke ya monene ya Paradiso. Mwana na ngai Yesu alobaki yango na bino pe nazongeli yango: “Bokonzi ya Likolo bazwaka yango na makasi, pe ezali bato ya makasi nde bazwaka yango" (Matthieu 11:12)... Kobika na kobanga ngai, ezali komipesa mobeko ya molimo na makambo nyonso oyo bosalaka. Kobika na kobanga ngai, ezali koluka na mozindo bomoi ya bosantu. Na maloba mosusu, ezali kolinga Yawe Nzambe na bino na motema na bino mobimba, na elimo na bino mobimba pe na makanisi na bino nyonso. Na liloba moko, ezali kopesa ngai lokumu, kosalela ngai kozanga kokanisa bino moko...

Lingomba moko te, ndako ya mibeko te, mimeseno te, moto moko te azali na bafungola ya lobiko na bino. Kaka bomoi kati na kobanga Nzambe nde efungolaka bino bikuke ya monene ya Paradiso. Mwana na ngai Yesu alobaki yango na bino pe nazongeli yango: "Bokonzi ya Likolo bazwaka yango na makasi, pe ezali bato ya makasi nde bazwaka yango" [1]; "Bokota na ekuke ya moke. Mpamba te ekuke ezali monene, nzela ezali ya ngalasuka oyo ememaka na libebi, pe bato mingi bakotaka wana. Kasi ekuke ezali moke, nzela ezali ya moke oyo ememaka na bomoi, pe bato moke nde bamonaka yango" [2].
Natiaki lingomba moko te na mabele oyo. Nandimaka yango tango ezali kopesa nzela, na bino bana na ngai, ya komikutana na esika to lingomba moko oyo epesaka bino nzela ya kokanisa pe kotala epai na Ngai, Nzambe Mokeli na bino.
Ezali mimeseno na bino ya kosala mangomba zingazinga ya mateya ya basali na ngai tango bakei na mabele. Nazali na likambo te na yango tango ntina ya liboso ezali ya kokota na mozindo ya malakisi na ngai pe kotia na misala mitindo nyonso pe mateya oyo batindelaki bino na bosembo na ngambo na ngai. Mokano na ngai, Mibeko na ngai Zomi pe Mibeko na ngai ya Bosantu ebongwanaka te. Ezali ya bronze, elekaka ntango pe ezali ya seko. Yango wana, mangomba nyonso ya mabele esengelaki kolakisa likambo moko mpo na losambo moko pe moko ya Nzambe, ndenge ezali na Paradiso epai baanzelu basalaka kaka Mokano na ngai. Solo ya solosolo ya Nzambe ezali Moko, ekoki kobongwana te pe ekoki kokabwana te. Boye, mpo na nini mangomba mingi boye mpo na kosambela ngai na mabele ya bato oyo? Botiaka ngai wapi kati na misala na bino ya losambo?
Natindaki Abalayama mpo na kokamba bino na boyebi ya Nzambe Moko pe kopesa bino ndakisa ya Kondima ya solo kati na Nzambe oyo ya Likolo. Na nzela ya Mose, napesaki bino Mibeko Zomi mpo na kosangisa bino zingazinga ya losambo moko ya Nzambe oyo etelemi likolo ya Mibeko na ngai Zomi pe Mibeko na ngai ya Bosantu. Mwana na ngai Yesu Klisto ayaki na mosala ya kobikisa mpo na kozongisa bino na nzela ya malamu tango bozalaki kokende na nzela ya libebi. Atako bongo, botikalaki sembo na motema makasi na bino ya kobungisa nzela. Boye, natindaki Molimo Mosantu mpo na kokanga Lucifer pe kokamba bino kati na Solo mobimba. Litatoli nini mosusu ya Bolingo, ya Mawa pe ya Motema molai bozali kozela uta na Ngai Nzambe na bino? Bino bana na ngai, bozali na mawa na motema makasi, bokangi makanisi. Nasalaka nyonso mpo na koningisa bino mpo na kosalisa bino kofungola miso, kasi bolingaka kofunga yango pe kotambola na kimia na moyi makasi. Bozali lokola bakangami oyo balingaka kotikala na boloko tango bafungoleli bango bikuke ya bonsomi. Nakelaki bino, kasi mbala mosusu nasosolaka te misala na bino.
Kofuluka ya mangomba ezali elembo ya lolendo, lofundu, kozanga motema molai, kozanga botosi pe kobungisa nzela ya moto. Moto amimonaka nzambe, amitondisaka na bakombo na mopepe nyonso: babengi ye moyekoli monene, moyekoli, bishop, ntoma pe ata nzambe. Na yango, azali na kobanga te, azali komikanga te mpo na kosalasala, to kobongola malakisi na ngai ya solo, ndenge ye alingi. Moto azwaka kati na malakisi na ngai oyo alingi pe asalaka yango koloba oyo esepelisaka ye, mpo na bolamu na ye moko. Nzokande, moto alengaka pe afukamaka liboso ya zabolo oyo ye asainaka boyokani ya makasi ya makila. Moto atungisami ata moke te na mongongo ya Yesu. Moto, olingi nini?
Bokeli mangomba na motango ya baposa na bino ya mbongo. Bokeli bisika ya koyekolisa balobeli nzambe oyo basalaka na mosala na ngai mombongo ya solo na mabele. Nazongeli koloba, babotamaka Mosali ya Nzambe, bakokoma yango te. Ezali Ngai Nzambe nde naponaka pe natiaka Basali na ngai banda na likolo liboso ya mbotama na bango na mabele. Basali na ngai babotamaka na malakisi pe makabo oyo ekokani na misala na bango. Likabo moko te eyekolaka to epesami na moto mosusu. Satana akosaka bino na kopesa bino makabo nzokande azali kolinga bino pe atindi bino kolinga bana na ngai, mokolo mobimba.
Na mobulu oyo bokoki kolimbola te oyo bokelaki na mabele, nzela moko ya lobiko ezali bomoi oyo etambolaka na Kobanga na ngai na ntango nyonso pe na esika nyonso. Kobika na kobanga ngai, ezali koyeba ete namoni bino na misala nyonso oyo bosali na maloba, na misala pe na makanisi. Kobika na kobanga ngai, ezali liboso kotosa mobeko na ngai ya liboso "Nazali Yawe Nzambe na yo, okozala na banzambe mosusu te liboso na elongi na ngai". Kobika na kobanga ngai, ezali komipesa mobeko ya molimo na makambo nyonso oyo bosalaka. Kobika na kobanga ngai, ezali koluka na mozindo bomoi ya bosantu. Na maloba mosusu, ezali kolinga Yawe Nzambe na bino na motema na bino mobimba, na elimo na bino mobimba pe na makanisi na bino nyonso. Na liloba moko, ezali kopesa ngai lokumu, kosalela ngai kozanga kokanisa bino moko.
Mpo na kosala yango, bosengeli kokima mabe, kokengela baninga na bino pe etamboli na bino ya nzoto, na nsima kobala tango makambo nyonso ezali malamu, kolata malamu na kokima bilamba ya mode; kokengela nzoto na bino, kokengela lolenge ya kosalela maloba na kokeba na masolo mingi, bilobaloba pe kotiola mpamba, koluka na mozindo lokumu, bopeto, boyengebene... Molongo ezali molai, kasi eyebani na moto nyonso ya bomoto ya molimo. Moto nyonso amemi kati na ye ntina ya bomoi ndenge nalingi.
Solo, moto nyonso amemi kati na ye eteni ya pole na ngai ya bonzambe oyo ekebisaka ye pe ebebisaka ye ntango nyonso mpo na lolenge nyonso ya kobima na nzela: ezali oyo bobengaka intuition. Bobosana te ete nalobelaka moko na moko ya bana na ngai, na lolenge moko to mosusu, ata na ndoto. Boyeba ete moto nyonso abotamaka elongo na anjelu mobateli na ye. Ezali mbeba na bino te soki boyokaka te to boboyi kolanda mitindo ya anjelu mobateli na bino? Nani kati na bato ya mayele ayebi te ete ezali malamu te koyiba, koboma, kokosa...?
Mpo na yango, ezali na bosenga te ya lingomba. Boyeba ete Ngai Nzambe namoni nyonso oyo bosalaka na ntango nyonso pe na esika nyonso. Namoni kati na mitema na bino pe natangaka makanisi na bino nyonso. Misala pe maloba na bino, ata oyo ya sekele eleki ebombami ekimaka ngai te. Misala na bino nyonso oyo ebetaka Mibeko na ngai ya Bosantu etangami malamu kati na Babuku na bino ya Bomoi. Bosengeli koyanola na lolenge moko to mosusu, na mabele pe na likolo.
Na likambo oyo, mpo na nini kokoba na motema makasi? Bobanda kolona mimboto ya malamu ya sika mpo na kozonga na se ya bobateli na ngai oyo ekweaka te na bantango ya mpasi oyo ya suka ya ntango. Oyo eleki mabe ezali koya, mpamba te ntango ezali koya tango liboso ya mpasi, bato bakobenga kufa na pamba. Ekozala bongo mpamba te bosengeli konyokwama kino na suka mpo na mbuma ya misala na bino. Moto nyonso akobuka kino na makambo ya mike oyo alongaki. Ezali Mobeko na ngai bongo!
[1] Matthieu 11:12, [2] Matthieu 7:13-14
[1] Matai 11:12, [2] Matai 7:13-14
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Le salut est dans la crainte de Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.freepik.com