Tosengeli kozwa baboti na biso lokola banzambe na mabele?

Kolanda Mobeko ya Liboso ya Nzambe (Exode 20:1-3), ezali kaka Nzambe Moko, Mokeli ya Mokili Mobimba. Nzambe oyo ya Bomoko azali Tata ya Likolo mpo na bato nyonso na mabele. Yango wana, kozwa baboti na biso lokola banzambe ezali lisumu monene na miso ya mobeko ya liboso ya Nzambe. Nzambe azali Nzambe; Nzambe ye moko nde azali Mosantu pe abongi na losambo mpe lokumu na mabele...

Tosengeli kozwa baboti na biso lokola banzambe na mabele?

Motuna oyo ezali na kati na yango eteni monene ya nzembo mabe oyo esengeli kolimbola mbala moko. Mpo na kosala yango, mibeko mibale ya Nzambe esengeli kozwama na makanisi: Mobeko ya Liboso ya Nzambe epesami na Moïse elobi: "Nazali Yawe Nzambe na yo, okozala na banzambe mosusu te liboso na ngai", pe Mobeko ya Mibale elobi: "Okopesa lokumu na tata pe mama na yo".

Baboti na biso bazali bato pe bazali banzambe te

Kolanda Mobeko ya Liboso ya Nzambe [1], ezali kaka Nzambe Moko, Mokeli ya Mokili Mobimba. Nzambe oyo ya Bomoko azali Tata ya Likolo mpo na bato nyonso na mabele. Yango wana, kozwa baboti na biso lokola banzambe ezali lisumu monene na miso ya mobeko ya liboso ya Nzambe. Nzambe azali Nzambe; Nzambe ye moko nde azali Mosantu pe abongi na losambo mpe lokumu na mabele.

Makambo oyo esengeli mpo na kopesa lokumu na baboti na biso

Kasi, baboti na biso bakoki kozwa limemia nyonso oyo etali mokumba oyo Nzambe ya Seko apesi bango; ya kobota bana pe kopesa bango mateya na nzela ya molimo mpo na kosala bango bana ya Nzambe. Mpo na kondima mosala oyo, ya mpasi mingi, Nzambe atindi ete mwana nyonso "apesa lokumu na tata pe mama". Elobami polele "Okopesa lokumu na tata pe mama" pe elobami te "Okopesa lokumu na tata na yo pe mama na yo". Mpo awa, Nzambe asengi tozwa na makanisi ndimbola ya "Tata" pe "Mama".

Mosala ya baboti na mateya ya molimo na libota

Na bosolo, makanisi nyonso mibale esengeli mokumba monene epai ya baboti mibale oyo basengeli kozala bandakisa mpo na mateya ya molimo ya bana na bango. Tata pe mama basengeli kosala mosala na bango pe kosunga bango na bango na mateya ya bana. Na likambo oyo, mwasi azali na mokumba kitoko pe ya monene, mpo Nzambe alingi ete abongola ndako moko ya bule, tempelo mpo na Mokano ya Nzambe. Na ndako, mokumba na ye eninganaka na kati ya Mobeko ya Nzambe. Asengeli kosala mpo na mateya ya molimo ya libota.

Mosala ya mwasi na mabele

Nyonso wana ezali kososolisa biso ete mosala ya likolo koleka ya bozali ya bomwasi ya solo na Mabele ezali ndenge moko na oyo ezalaka ntango nyonso na bisika ya likolo koleka, elingi koloba kobonga na bazinga-zinga na ye, komata pe kobatela bopeto ya Bokeli mobimba. Bopeto ya mwasi ya Mabele ezalaka na boyengebene na ye. Tosili koyeba ete boyengebene ezali elongi ya likolo koleka ya mwasi nyonso. Mpo boyengebene yango moko ebotaka na kati ya mwasi balongi nyonso, na kozanga ata moko te. Azali sembo te mwasi nyonso oyo akosepelaka na mibali, na maloba to na makanisi. Soki azali kosala bongo, azali sembo te liboso na ye moko pe liboso ya mosala na ye ya likolo na Bokeli oyo, pe lisusu na Mabele.

Mosala ya mobali na mateya ya molimo na libota

Na bomoko, mobali asengeli kotelema liboso na libanda, mpo na kobunda. Nzokande, mwasi, nakobatelaka ye na sima, abombaka boyokani na Pole pe asalaka bongo motema, epesameli ya makasi pe kobondisama. Mobali asengeli te, na motó makasi, kobuka mibongisi oyo ezali kosalema na ndako to kotia mobulu. Nzokande, asengeli kopesa lisungi na ye mpo na bokonzi ya kimia. Mwasi pe asengeli kotosa mosala ya mobali pe akanisa te ete kaka misala na ye nde esengeli kozala ya motuya. Misala ya ngambo nyonso mibale esengeli kosunga yango na yango na kobetama ya ndenge moko: moko akoki kotungisa mosusu te.

Baboti oyo babongi te bakoki kozwa lokumu te

Ezali kaka na makambo oyo nde bana basengeli "kopesa lokumu na tata pe mama". Soki te, ndenge nini kopesa lokumu na mama ya mobulu oyo atalisaka boyengemi te na miso ya bana na ye pe bazinga-zinga? Ndenge nini kopesa lokumu na baboti oyo bafingaka mokolo mobimba, kosalaka bomoi ya ndako mabe mpenza? Ndenge nini kopesa lokumu na baboti oyo bateya bana na bango ndoki to baluka kobonza bango mbeka butu na butu? Ndenge nini kopesa lokumu na tata molangwi masanga, oyo ameli nkisi ya mabe; tata oyo azali na basi ya libanda; tata oyo akoki te kokokisa mateya pe mikumba ya libota?...

Mituna pe bandakisa nyonso oyo ezali kosunga kososola ete kopesa lokumu na baboti ezali likambo ya kozwa. Nzokande, ata soki baboti bazalaki bandakisa te, bana basengeli kozala na botosi liboso ya baboti na bango oyo bazali na lokumu ya kobota bango na mokili. Ezali mokumba ya bana kopesa bolingo na baboti na bango ata ndenge bazalaki. Nzambe ye moko nde akosambisa bango.

Baboti basengeli te kozanga limemia epai ya bana na bango

Ezali lokuta mpenza koloba ete baboti bazali nzambe to bakolo nzambe awa na mokili. Makanisi oyo ebimisaka mbala mingi kozanga limemia ya baboti mosusu liboso ya bana na bango. Na bosolo, baboti oyo bazwaka mokano ya kopona babalani ya bana na bango na makasi. Basusu basengaka ete bana na bango basala makambo minene mpo na bango atako bazangi makoki; basusu lisusu batindaka bana na bango ya mikolo kopesa lokumu na bakoko ya kala oyo epesami epai ya Satana, etc.

Mwana ya mokolo asengeli kozala ya ye moko pe kozala na botosi

Esengeli koyeba ete ntango akomi mokolo pe azali kotambola ye moko, mwana asengeli kozala na bonsomi ya ye moko na bomoi na ye lokola moboti ya lobi. Kobanda ntango wana, akoki na bonsomi kobongisa mabunga ya mateya oyo baboti na ye bapesaki ye, soki te, akozala na mbeba mbala mibale liboso ya Mibeko ya Nzambe. Akoki na ye kosalisa baboti na ye, bandeko na ye ya mibali pe ya basi mpo na kobongisa mabunga na bango ya molimo. Na bolingo, asengeli kozala na botosi epai ya baboti na ye oyo babatelaki ye butu pe moyi ntango azalaki mwana ya mobulu to mwana ya bokono... Yango nde mobeko ya mbongwana ya misala: baboti babotaka bana pe balekolisaka bango, pe na ngala na bango, bana babotaka bana na bango pe balekolisaka bango. Wana nde eyaka bomoi awa na mokili.

[1] Exode 20:1-3

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Devons-nous considérer nos parents comme nos dieux sur terre?", disponible sur AGA News.
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Source Ph. illustration: www.hiclipart.com