Banyama ya malamu oyo bayebisama te: Mbula (ndembo) na Mulema (nkima ya butu)
Na makambo ya molimo, mbula (ndembo) ezali moko ya banyama ya esengo oyo ezali na mokili. Elingaka kozala motango moke. Tango ezali kotepatepa pembeni ya ndako, epai ya moto, ezali mpo na koyebisa ye nsango ya malamu. Na nsima, ezongi na esika oyo ewutaki. Na ntina oyo, bandoki balingaka yango te...

1. Mbilinga (L'hirondelle)
Mbilinga ezali ndeke oyo ebimaka mpo na kokende na bisika ya moto na mikolo ya malili mpe ezali na libota ya Hirundinidae. Etongaka zala na ye pene-pene ya bandako ya bato. Ezali ndeke oyo esalaka na moi mpe ekoki kokoma na lombango ya 75 km/h [1].
Mbilinga ezali ndeke ya lipamboli
Na ndenge ya molimo, mbilinga ezali moko ya banyama ya esengo oyo evandaka na mokili. Eyebani lokola ndeke oyo emipesaka mpasi. Soki ezali kobaluka-baluka zingazinga ya ndako ya moto, ezali mpo na koyebisa ye nsango ya malamu. Na sima, ezongaka na esika euti. Mpo na yango, bandoki balingaka yango te.
Ndenge nini kozwa nsango ya mbilinga?
Bato oyo bazali na makabo ya sikisiki bakoki kozwa mateya ya yango. Mpo na basusu, esengeli kosambela mpo ete Nzambe asalisa yo kososola mateya na yango, ezala na nzela ya ndoto, to na nzela ya mayele ya motema, etc.
2. Ngembo (La chauve-souris)
Ngembo ezali nyama oyo ezali na mabele mpe ezali na molongo ya Chiroptères. Koleka 65% ya bangembo basalaka na butu [2]. Pene na 70% baliaka banzinzi [3]. Ngembo ekoki kotambola malamu na butu na nzela ya écholocation oyo ezali kobimisa makelele ya likolo, na sima basalelaka echo na yango mpo na kotambwisa bango mpe kokanga bilei na bango.
Ngembo eyebaka bandoki mpe makelele ya mabe
Likoki oyo esalisaka mpe ngembo koyeba bandoki mpe makelele ya mabe oyo ezali na moboko ya biloko ya mabe. Lokola mbongi (hibou), bandoki basali ete bato bazala na likanisi ya mabe mpo na ngembo; yango wana mbala mingi ezalaka na pasi ya bindimeli ya lokuta. Mpo na yango, ngembo ekomi liseki ya bato. Elilingi ya mabe oyo ezali mpe na ntina ete bandoki babongwanaka na ngembo mpo na kokende kosala mabe.
Mbongwani ya ndoki
Momeseno ya mabe oyo na bandoki ya kobongwana na banyama mpo na kokende kosala mabe endimami na ntina ete, na momesano, bandoki balingaka te koyebana na ntango ya bitumba na bango. Bakimaka ntango nyonso mokumba na bango ya kosala mabe. Bandoki bazali bato ya bobangi oyo babombamaka ntango nyonso na sima ya bozangi boyebi ya bato mpo na kolonga. Soki te, bandoki nyonso, na bakota nyonso, babangaka Molimo Mosantu mpamba te ezali ye oyo akangaki mokonzi na bango Lucifer. Boye, bengaka Moto ya Molimo Mosantu tango oyoki ete ozali na likama ya bitumba kowuta na bandoki, ezala na moi to na butu. Bokimaka lisusu te bandoki oyo babongwanaka na banyama oyo balandaka bino na bandoto. Ndenge moko na moi tango boyoki bitumba ya mabombami ata na esika nini bozali. Telema ngwi, tia makanisi na yo, sambela na kimia, na sima tindelela bango Moto ya Molimo Mosantu, mpe okomona ete bobangi ekobongwana ngambo. Yeba ete bandoki babangaka bato nyonso oyo basambela na bosembo.
[1] https://www.hww.ca/fr - [2] https://www.geo.fr - [3] https://chauve-souris.ca
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Les animaux bienfaiteurs qu'on ignore: l'hirondelle et la chauve-souris", disponible sur AGA News.
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com