Mibali balingaka te solo
Mibali balingaka te ete bátalisa bango makambo nyonso oyo ezali malamu te kati na bango, mbeba na bango, nzokande bomoi ya bosantu oyo Klisto Yesu asengi eleki na botiki ya bomoto mpe likabo ya bomoto. Mibali bayinaka bato nyonso oyo basalisaka bango mpo na kolongwa na mbindo ya molimo na bango. Bozali kososola mpo na nini Mwana na Ngai Yesu ababunamaki, afundamaki lokola mofínga, na nsima abakamaki na ekulusu...

Loba na bosolo makambo oyo ezali kotambola te na moto moko mpo na kosalisa ye ete alongwa na mbeba na ye, posa na ye ya mabe; na bozongi, lokola matɔndi, akozua yo lokola monguna na ye mpe akoluka kokima yo mpo na kokɔta na monɔkɔ ya mbwa ya zamba. Ah bana na Ngai, bokómi nini? Nasengeli koloba nini lisusu oyo Mwana na Ngai Yesu ateyaki bino naino te? Tango Yesu alobaki na bino: "Soki moto abeti yo mbata na litama ya mobali, pesá ye mpe litama ya mwasi"[1], alingaki kosala ete bososola, lokola bolobaka malamu: *"solo epelisaka miso kasi ebukaka yango te". *Bwanya na ye elingi koloba na ndenge pete ete esengeli kolinga moto oyo alobi na yo solo, ata solo yango esali yo mpasi lokola mbata (Soki moto abeti yo mbata na litama ya mobali). Esengeli kozua mpasi na yo na motema, na nsima kosenga ete moto wana ayebisa yo solo mingi mpo na bokoli na yo ya molimo (...pesá ye mpe litama ya mwasi). Yesu azalaki koloba te na ntina ya bambata mibale ya nzoto, kasi azalaki kolakisa na lisese mpasi oyo esalemi na solo na moto mosusu.
Bolɔ́tí na makambo ya lokuta, lokuta mingi mpenza na lolenge ete solo emonani epai na bino lokola mafinga. Ezali bongo mpo ete bozali koyangela na milimo mabe oyo ekokani. Lolendo ekanga bino na makoki nyonso ya kososola bomoto na bino mpe komituna. Boyeba ete moto nyonso oyo ayinaka solo, aboi Nzambe mpamba te Solo ya solosolo ezali ya Nzambe. Yango wana, bato bayambaki te Mwana na Ngai Yesu Klisto oyo azali Bolingo na Ngai oyo ayaki kobikisa bino na nzela ya kozongisa Solo.
Kozanga Solo, moto moko te akoki kobikisama. Solo kaka nde ekumba bino na Paradizo, kasi lokuta ebombi bino lifelo. Ye oyo aluki lobiko na ye asengeli koleka na eteni ya botiki ya bomoto mpe likabo ya bomoto oyo ezali kotika lokuta mpo na koya na solo, na ndakisa mosusu, kotika mbindo ya molimo mpo na kolanda Klisto na Solo ya Nzambe. Nzela mosusu ezali te.
Banda kala mingi, bolukaki kobomba na bosolo oyo na konyokola mpe koboma bantoma na Ngai oyo bayaki koyebisa bino solo. Bozali kokende mosika na kokweya na bino na masumu na koboma Mwana na Ngai Yesu. Kasi, bomoni ete eloko moko te ebongwani: solo ezali na bikuke na bino. Lelo, bosilisi kondima ete Yesu azali Nzela, Solo mpe Bomoi; moto moko te akoki koya epai na Ngai Nzambe, kozanga Solo ya solosolo ya Yesu Klisto. Mpo na nini bobungisaki ntango nyonso wana na kokosana? Solo ya Nzambe elóngaka ntango nyonso. Solo ebongwanaka te, na ntango, to na esika mpamba te ezali na ebandeli mpe na suka ya makambo nyonso, lokola Ngai Nzambe.
Ngai nazali Nkolo ya ntango mpe ya Makambo. Nazali Alpha mpe Omega. Nazali, Nazalaki mpe Nakozala. Nazali ndenge moko lobi, lelo mpe libela na libela; Nabongwanaka te mpe Nakobongwana te. Nazali moboko ya Bikelamu nyonso. Mpo na nini bolukaka koleka Solo na Ngai, mbala na mbala? Mpo na nini koluka kopesa Ngai mokongo? Eh lolendo ya bato!
[1] Matthieu 5:38
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Les hommes n'aiment pas la vérité", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.pixabay.com