Komekama na bomoi ya moto
Eteni ya komekama ezali nzela oyo tosengeli koleka, ntango na yango ekoki kozala molayi to mokuse kokokana na ntango oyo moto azwi mpo na kososola, kobongisa, kobongwana, koyekola pe komipesa na bomoi mpo na kotambusa malamu mosala oyo Nzambe apesi ye. Komekama moko te eleki makasi...

Na mikolo ya lelo, moto azali kososola te pe akoki koyikela komekama te oyo ezali liboso na ye, nzokande komekama ezali kobimisa pe kosala moto akoma oyo Nzambe alingi:
- komekama elakisaka na moto mabunga na ye, mabe na ye oyo abimisaki na kala;
- komekama epesaka nzela na moto ayekola, abongisa mabunga nyonso pe asosolaka makambo mingi ya bomoi;
- komekama esungaka moto mpo na komona pe kobimisa makoki ya kati oyo ayebaki te;
- komekama epesaka ye bwanya pe epesaka ye nzela ya kobimisa nguya ya molimo oyo ezalaki kolala kati na ye banda kala;
- komekama epesaka nzela ya komata matambala mpo na kokoma na ndelo oyo Nzambe abongisaki mpo na kosala mosala na ye malamu, na mpasi te;
- komekama epesaka na moto nzela ya kozwa ezaleli ya makasi lokola ebende;
- komekama epesaka na moto nzela ya komeka makoki na ye ya kotikala ngwi na mosala oyo Nzambe apesi ye, etc. Yeba ete eteni ya komekama ezali nzela oyo tosengeli koleka, ntango na yango ekoki kozala molayi to mokuse kokokana na ntango oyo moto azwi mpo na kososola, kobongisa, kobongwana, koyekola pe komipesa na bomoi mpo na kotambusa malamu mosala oyo Nzambe apesi ye. Komekama moko te eleki makasi...
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Les épreuves dans la vie d'un homme", disponible sur AGA News.
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com