Suka ya mokili
Bana ba ngai, nalobi na bino solo, bozali na tango ya suka ya mokili, boye bolamuka na pongi na bino ya makasi. Nyonso oyo ezali koleka ezali ya solo mpe ekokani na makambo oyo esakolamaki kala, lokola mpela, bitumba, nzala makasi, bozangi, bososoli ya mibali na mibali, basakoli ya lokuta, bokono oyo ebomaka, moto ya zamba mpe mabe nyonso wana.

Bana ba ngai, nalobi na bino solo, bozali na tango ya suka ya mokili, boye bolamuka na pongi na bino ya makasi. Nyonso oyo ezali koleka ezali ya solo mpe ekokani na makambo oyo esakolamaki kala, lokola mpela, bitumba, nzala makasi, bozangi, bososoli ya mibali na mibali, basakoli ya lokuta, bokono oyo ebomaka, moto ya zamba mpe mabe nyonso wana. Solo mpenza, bikamwa ya mokili oyo, mabe oyo, bokono ya sika sika oyo, bizaleli mabe ya bato mpe misala ya bato ezali bilembo oyo ezali kolakisa suka ya tango.
Bokanisa te ete bozali na tango nyonso ya kosala makambo ndenge bolingi. Kolongwa na mbala moko, elingi koloba liwa ya mabe mpe ya mbala moko, ezali ya solo mpe ezali kosalema makasi ndenge nalobaki na Apocalypse. Bozela te ete Yesu-Klisto azonga liboso ya kotia molongo, kasi bozonga epai na Ngai mpo Yesu akozonga te. Azali kati na Ngai, mpe Ngai, nazali na bino tango nyonso. Kelelo moko te ekobeta, boye ekozala malamu bosala makanisi na bino malamu koleka mpo suka ya mokili ezali ya solo.
Oyo asengeli kosunga bino mpo na kozonga na nzela azali déjà awa na mabele. Boye, bobondela na molende mpo na komona ye. Botikala na mabondeli tango nyonso mpe bopengwa na nzela ya lokuta oyo bozwaki.
Mipale ya Pole ezali komonana sikoyo mpe ezali kotala bato nyonso oyo bazali na libunga mpe masumu, bato nyonso oyo, na lolenge nyonso, basalaka te Bolingi na Ngai. Bokanisa te ete suka ya mokili etali kaka bampaka. Te, nalobi na bino solo, suka ya mokili ekotika moto moko te; ezali kobeta na ndenge ya makasi bato nyonso oyo babungi nzela, lokola bana mike, bilenge, mikolo mpe bampaka.
Mbongwana nyonso oyo ewuti na suka ya mokili eyei kopetola mabele na nyama mike mike nyonso ya mbindo. Kopetolama oyo ekosalema noki noki mpo ete mabele ezonga na lolenge na yango mpe bopeto ya ebandeli mpo ezali na bikelamu mingi ya pamba na mokili na bino. Nzokande, tango ya kobungisa ezali lisusu te. Wuta kala, napesaki bino makebisi nyonso oyo bozalaki na yango mposa mpo na kotombola moto, kasi ezalaki mpamba. Bozali bakangami mpe bokomi bakufa miso na makambo ya mokili oyo lokola mbongo, biloko ya mabele, mpe nyonso mosusu.
Boyeba ete Ngai Nzambe, nazali Bolingo. Yango wana, soki moko kati na bino asaleli ngai na bosolo, na motema mobimba, na tango ya suka oyo, nakopesa ye Ngolu. Bozali komona nyonso oyo ezali koleka, kasi bosali lokola bomoni te. Mpo na nini boboyi komona mpe kososola liwa nyonso ya mabe oyo, kosangisa na makasi oyo, bisaleli oyo, mabe nyonso oyo, mokili mobimba oyo ezali lisusu komimona te mpe makambo oyo ekomi kaka kokende na nse na nse?
Na esika ya kotala epai na Ngai Nzambe, bino bato, bokanisi ete bokomona bisaleli ya mikakatano na bino na bisika mosusu. Nalobi na bino, solo, na esika ya bisaleli, bokokutana kaka na mikakatano mpo bondimi te Ngai Nzambe na bino; bozali na kondima te.
Lamuka avant que ezala trop tard pona yo!
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Fin du monde", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com