Mobali nini akoki kolinga mwasi oyo atosaka te ?
Lelo, mwasi azali na limemia moko te pe azwaka na motuya te mobali na ye. Ezali na motuya koyeba ete mpo na mwasi, komitosa epai ya mobali na ye, ezali kolakisa botosi epai ya Nzambe, na limemia ya Mibeko na Ye Mosantu, kasi ezali te kondima ete azali na bolembu. Mpo elobamaki: Basi, botosa mibali na bino, mpamba te mobali azali mokambi ya ndako. Mibali, bolinga basi na bino, lokola Klisto Yesu alingaki bino (Baefese 5: 22-33)...

Basi, botosa mibali na bino, mpamba te mobali azali mokambi ya ndako. Mibali, bolinga basi na bino, lokola Klisto Yesu alingaki bino... Tika ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye ndenge ye moko amilingaka, pe tika ete mwasi apesa mobali na ye limemia (Éphésiens 5: 22-33).
Mwasi ya molimo oyo azali na mposa ya libala esalema na Lola, asengeli, kati na makambo mosusu:
1. Kolakisa botosi epai ya Nzambe
Lelo, mwasi azali na limemia moko te pe azwaka na motuya te mobali na ye. Ezali na motuya koyeba ete mpo na mwasi, komitosa epai ya mobali na ye, ezali kolakisa botosi epai ya Nzambe, na limemia ya Mibeko na Ye Mosantu, kasi ezali te kondima ete azali na bolembu. Boye, liloba endimisi: "Basi, botosa mibali na bino, mpamba te mobali azali mokambi ya ndako (Éphésiens 5: 22-33)... Na mbala na yango, mobali asengeli kopesa limemia pe kozwa na motuya mwasi na ye, ndenge Klisto ateyaki: "Ezali boye ete mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Mpo ete moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka yango pe abatelaka yango... " (Éphésiens 5:28-29).
2. Kozala lisungi ya mobali
Na Solo, koluka kozala ndenge moko na mobali, ezali komikitisa mpo ete mwasi azali na esika ya motuya mingi na kokokisa mokano ya Nzambe, na ndenge ete azali kosangana na mabombami ya bokeli na kopesa bomoi. Yawe Nzambe, ye moko apesaka mwasi limemia mpo ete Akelaki ye na makasi, na komikitisa, na bwanya, na bolingo ya kosalisa, na bolamu, atonda na bolingo pe na soni. Akelaki ye na elilingi ya Ngolu ya Nzambe. Mpo na yango, mwasi asengeli kozala na lisanga ya semba pe ya ntango nyonso na Nzambe, Mokeli na ye kasi amilungisa te na bitumba ya mpamba ya mokili oyo.
3. Kozala ndakisa ya molimo
Mwasi asengeli kozala ndakisa kati na libota pe mpo na bato nyonso. Mpo ete uta na kobotama na ye ya yambo na mokili, Nzambe alingaki ete mwasi ateya bato nyonso oyo ayekolaki epai na Ye Nzambe, Mokeli ya Mokili mobimba, mpo na kokamba bato ntango nyonso na nzela ya Solo. Yango wana, elobamaki: "Basi, botosa ndenge moko mibali na bino, mpo ete, soki bamosusu batosi liloba te, bazwama kozanga liloba na etamboli ya basi na bango, na komona lolenge na bino ya kobika peto pe na botosi..." (1 Pierre 3, 1-2).
4. Komipesa na mosala na ye ya motuya koleka
Mosala ya likolo koleka ya mwasi, ezali kobongisa mabele, kobanda na Bokeli mobimba, na sima kokomisa ya molimo pe kosalisa na bopeto pe komata ya bato. Mosala oyo ya malamu esengeli kosalema na boyengebene oyo ezali ngolu ya likolo ya basi nyonso. Mpo ete boyengebene ezali na kati na yango bopeto oyo limemia na yango esengi na mwasi kokengela misala na ye, maloba na ye, makanisi na ye, etc.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Quel homme peut aimer une femme qui n'est pas soumise ?", disponible sur AGA News.
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com