Milimo ezali koyangela mokili

Bino bosili kobakisa mposa ya bino, elongo na mabe ya bino na ndenge ete milimo mabe oyo ekokani na yango ekomi mikolo ya mokili ya bino. Milimo mabe ya koyina, zuwa, lolendo, mposa ya biloko, lokoso ya mbongo, lofundu, mposa ya nzoto ya bokono, kozanga boyengebene, komela masanga, komela drogue, mabe, koluka koleka bato mosusu, komizala kitoko mingi, goyibi, mpe maloba ezanga ntina... ezali koyangela bino mpe kopesa bino mibeko na nyonso oyo bosalaka awa na mabele. Ndenge nini ekoki kosalema ete bana ya Nzambe, bikelamu na ngai, bandima kofukama liboso ya mbindo ya Satana oyo azali kaka na potopoto ya molimo?...

Milimo ezali koyangela mokili

Nasalá mokili oyo kitoko na esengo ete bokobongola yango na elilingi ya Paradiso. Kasi noki mpenza, nakomaki na bosolo ete moto akoki te kozala na boyengebene. Bokabi ngai na nzela ya kobungisa nzela na masumu. Bolingaka mabe, mpe boyinaka bolamu; bolingaka lokuta mpe boyinaka Solo. Bopesi mokongo na ba-anjelu banso oyo babatelaka bino, kasi boponaka kosalela ba-démon na bino ya mabe. Bokweyi na se mpenza kino bokomi bakangami ya zabolo na bolingi na bino moko. Bato, bozali banani?

Bokómi baombo ya bozangi na bino ebele mpe mposa oyo etungisaka bino ndenge bolingi mpe na mawa. Bokoki lisusu te kososola bolamu mpe mabe, lokuta mpe solo, na ndenge ete boponi ya bino ezali koboya Nzambe. Na mokili na bino ya lelo, nyonso ezali lokuta. Moto, olingi nini?

Bosili kobakisa mposa ya bino, elongo na mabe ya bino na ndenge ete milimo mabe oyo ekokani na yango ekomi mikolo ya mokili ya bino. Milimo mabe ya koyina, zuwa, lolendo, mposa ya biloko, lokoso ya mbongo, lofundu, mposa ya nzoto ya bokono, kozanga boyengebene, komela masanga, komela drogue, mabe, koluka koleka bato mosusu, komizala kitoko mingi, goyibi, mpe maloba ezanga ntina... ezali koyangela bino mpe kopesa bino mibeko na nyonso oyo bosalaka awa na mabele. Ndenge nini ekoki kosalema ete bana ya Nzambe, bikelamu na ngai, bandima kofukama liboso ya mbindo ya Satana oyo azali kaka na potopoto ya molimo? Ndenge nini bato bakoki kondima koboya Nzambe po na kosala boyokani na Satana oyo azali kotuna bango mbala na mbala makabo ya bomoi ya bato?

Bato baponaka kobika na ndenge ya lolanda na bilamba minene ya moindo ya milimo mabe na bango na elongi. Natiaki kati na bino molimo oyo ezali na nguya koleka milimo mabe oyo etungisaka mpe eyangela bino, kasi boyebi bino moko te mpe boponaka kobika ntango nyonso na kobanga milimo mabe na bino, na zabolo. Goyibi na bino mpe kozanga kondima etie bino na lolenge ya mawa ya bato oyo babungi nzela.

Ezali na ndaku oyo ozali kobebisa na mboka. Mabondeli ya liboso, ya kitradition, ya mapngwa pe ya mosala ezali kozwa mpembeni ya badjambu yango ya solo. Banguna ya mituna ezali kozongisa na mabondeli ya bamarabou, bayono mabele, bavisioner, baprophetesse ya mpene, bayenovoyant... liboso ya bango ezali na masano ya badjambu ya bazwi koloba na bango. Bapesi mpembele ya kozwa liboso ya Angelo, Mokonzi ya Lola Masantu, liboso ya bango bazali kobanda ya bopesi ya bobebisi. Banguna bakosalela vituko, mikano, ma-idole na ndako, na mabongisi... kopemba koleka mambi ya bisengo biyo. Boyokani na mpembele ya mituna ya satanique. Oyo ezali na bato ya liboso, mibali ya mabele, na mibali ya mosala, na mboka yote. Kasi satan azali kobima koboma mboka na badjambu ya ye. Bangeli yango ezali pembeni, te bazali kobika yo kobanga yo.

Milimo mabe ekómi ebele na ba-zando, ba-supermarché, ba-lopitalo, ba-morgue, ba-cimetière, ba-piscine, na libongo, bisika ya mayangani manene, na bandako na bino mpe bipai nyonso zingazinga na bino. Lola ya mabele ekomi molili na biteni minene ya moindo ya milimo mabe. Milimo mabe etondi ndenge ete ezwaka nzoto mpe evandaka kati na bino lokola bilenge basi ya solo oyo babendaka mpe babebisaka bakoluka basi mpe mibali oyo bazangi boyengebene. Basi ya mbindo bazali na milimo mabe mingi oyo ezali kobenda bango. Mabe mingi ya butu esalemaka na milimo mabe, emonani te mpe eyebani te. Emonanaka, esalaka mabe, na sima elongwaka.

Bandoki babotaka milimo mabe na mokili ya molili. Na ndoto, bamimonaka na zemi, na nsima babotaka bana milimo mabe oyo elonwaka na bokonzi na bango mpo na kokende kobakisa motango ya milimo mabe. Bana oyo ya mokili ya emonani te bazali moindo, kilo mingi, mpe mito minene. Milimo mabe ebalaka na basi mpe na mibali. Basalaka boyokani ya nzoto na bino na butu na lolenge ya mibali mpe basi ya butu. Milimo mabe oyo ezalaka na zuwa mingi oyo elandaka bino bipai nyonso mpo na kobebisa bomoi na bino ya bolingo. Bato nyonso oyo bazali na boyokani na lolenge ya milimo mabe oyo, bakoki libela te kobala. Milimo mabe oyo etikaka bino kopona balingami na bino, na nsima bazali kozela kobebisa boyokani na bino ya bolingo tango yango ezali kokoma na makasi. Boye, bazwaka esengo na mpasi na bino ya bolingo.

Milimo mabe etindaka bino na mabe, na kobakisa mabe na bino. Etungisaka bino mpe ebombelaka bino na mposa ya nzoto, kozanga boyengebene, lolendo, koyina... Milimo mabe ya lokuta, maloba, songisongi ezalaka kati na bino na lolenge ya nyoka. Na emonani te, minoko na bango ebimaka na minoko na bino tango nyonso bolobaka, na ndakisa, tango nyonso balobaka na nzela na bino. Evandaka na basakoli ya lokuta, bakosi, bankulutu ya malamu, bakosi ya somo... Milimo mabe ya nzoto ezwaka esengo na nzela na bino, ntango ya kosangisa nzoto. Bayaka ebele mpe bazongaka na bino mpo na kozwa esengo, tango nyonso bozali na boyokani ya nzoto. Batondaka te na nzoto; yango wana bato nyonso to baoyo milimo mabe eyangela bakómaka baombo ya nzoto, bato ya mposa ya kosangisa nzoto mingi. Milimo mabe oyo efandaka na nzoto ya basi ya ndumba. Etambolaka na ba-hotel, bandako oyo basangisaka nzoto, etc.

Milimo mabe etindaka bino na mabe. Boye, moto moko abomaka ndeko na ye ya mobali, ndeko na ye ya mwasi, baboti na ye, bana na ye, baninga na ye na ntina ya solo te. Bato batelemaka moko na moko, etuluku moko na mosusu, libota moko na mosusu, ekolo moko na mosusu. Mpe, ezalaki bongo banda na tango ya kala. Ezali mpasi kosukisa bitumba na mabele zambi milimo mabe oyo ezali koluka ntango nyonso mabaku ya kolia makila ya bato.

Bizaleli na bino ezalaka mbala mosusu ya kokangama te to ya bokeseni, kobonga na mposa ya milimo mabe na bino ebele. Moto moko akoki kozwa mokano ya kopesa bomoi na ye epai ya Yesu mpe na mbala moko, azwa mokano ya kosala boyokani na Satana. Bosilisaka na mbala moko bomoi na bino ya mabondeli mpo na kozinda na boyebi na kati ya mabe, na maloba ete bomoi ya bosantu ezali mpasi koleka. Boboyaka kokende kosambela ngai na mikolo ya losambo mpo na kotikala kolala, na esengo monene ya milimo mabe na bino ya goyibi mpe kozanga misala.

Nalingi koyebisa bino ete bozali kati mpenza na suka ya tango. Na tango wana, napesaki Jean nzela ya kolobela eteni ya suka ya bomoi na bino, na bimononeli ya suka, na maloba oyo: "Mpe mabele mobimba ezalaki na kokamwa na nsima ya nyama (...) Mpe efungolaki monoko na yango mpo na koloba mafinga mpo na Nzambe (...) Na nsima namonaki nyama mosusu kobima na mabele (...) Mpe ekosaki bavandi ya mabele na bikamwa (...) Mpe esalaki ete banso, mike mpe minene, bazwami mpe babola, bansomi mpe baombo, bazwa elembo na loboko na bango ya mobali to na elongi na bango, mpe ete moto moko te akoka kosomba to koteka, kozanga kozala na elembo, kombo ya nyama to motango ya kombo na yango..." [1].

Tika ete bato nyonso oyo balobaka ete Paradiso ezali na mabele bakoka kososola lisusu. Solo, biteni mosusu ya mokili na bino ezali na milimo mabe mingi te lokola biteni mosusu, kasi mabele ezali nyonso moko, epoli. Mbala mosusu, ntango natalaka mabele, boyokelaka ngai mawa. Yango wana, na suka ya tango, nakobomba elongi na ngai mpo na kotika bino kobika mbuma ya masumu na bino. Kasi, natikali na bokebi na mwa bato moke oyo babundaka na nzoto mpe na molimo mpo na kobima na potopoto oyo. Kaka Moto ya Molimo Mosantu nde ekoki kolonga milimo mabe na bino ya makasi. Boye, bobelela Molimo Mosantu mpo na kopesa bino lisungi.

[1] Emoniseli 13:1-18 = Apocalypse 13:1-18

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Les démons gouvernent le monde", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Source Ph. illustration: www.freepik.com