Dîme, mbongo ya Nzambe
Moto asengeli kozala na botɔndi epai ya Nzambe na kopesa na ye na motema moko eteni ya bozwi na ye lokola dîme, kolanda bwanya oyo elobi: "Nyonso ewuti epai na yo, mpe tozwi na lobɔkɔ na yo oyo topesi yo" (1 Chroniques 29:14)... Kofuta dîme ezali moko ya Mibeko ya Nzambe... Nzokande, esengeli koyeba ete barème ezali te na kofuta dîme... Esengeli kofuta yango na esika ya losambo oyo ebongi, oyo ezali kotikatika mpenza na Losambo ya Solo ya Nzambe... Na ntango moko te, dîme esengeli kosalela lokola lifuti mpo na mokambi ya molimo ya ndako ya losambo...

Nzambe Mokonzi, Nkolo ya Mampinga ya Likolo alobaki: "Mbongo ezali ya ngai, pe wolo ezali ya ngai" [1].
Liloba oyo ya Tata ya Likolo ezali kotalisa ete biloko nyonso ya malamu oyo tozali na yango awa na mokili ezali ya ye. Na maloba mosusu, Nzambe azali oyo akaboli bozwi epai ya bana na ye kolanda Mobeko na ye oyo elingi ete moto nyonso azwa lipa na mosapi na ye, mpo "soki moto aboyi kosala, asengeli te pe kolia" [2]. Nzambe akaboli bozwi kolanda Mibeko na ye.
Na moboko oyo, ezali pete kososola ete Nzambe azali oyo apesi lifuti na mwana na ye moko na moko kolanda mbuma ya misala na ye. Nzambe apesi bozwi na moto nyonso kolanda Mibeko na ye ya Ndenge; kolanda Mobeko ya Karma, kolanda mosala oyo apesi na moto moko na moko, kolanda bomilengeli oyo asalaka na moto moko na moko, etc. Bandakisa moke oyo elandi ezali kopesa likanisi ya nzela ya bokaboli ya bozwi na Nzambe.
Mozwi monene ya lobi ateyamaka liboso mpo azwa basoda mpo asala na yango misala ya malamu na tango ekoki. Mpo na yango, abandaka na koyoka mpasi ya bobola oyo eteyaka ye koyeba bozalisi ya mobola, motuya ya bozwi, yango wana asimba yango malamu mpe ya tango molai tango akozwa ebele. Ayekoli kozanga kobungisa moto liboso ya bozwi; kozanga kotia motuya mingi na biloko ya mokili oyo, kasi kotia miso na ye epai ya Nzambe mpo akokisa misala na ye na bozwi oyo.
Na likambo mosusu, kolanda Mobeko ya Karma, mozwi monene oyo asili kosala mpamba bozwi oyo Nzambe atielaki ye mwinda mpo na kosala mosala na ye na bomoi ya kala, asengeli kobotama na bobola na bomoi ya sika mpo afuta mbuma ya mpamba na ye, ya botosi te epai ya Nzambe.
Ezali pe likambo ya mosali ya Nzambe oyo asengeli kokanisa kaka na mosala ya Nzambe. Mpo na ye, kozala na bozwi monene ekoki kozala etumbeli ya mitungisi, mpamba te ezali pete te kosangisa bokambemi ya bozwi na bokambemi ya misala ya molimo. Na likambo oyo, Nzambe akopesa mosala ya lifuti ya katikati, kasi ezali malamu na mosali oyo pe akopesa ye lisungi ya mosali ya mibale epai ya nani akokaba bozwi esengeli mpo na kokokisa mosala ya mosali ya liboso. Tosili koyeba ete mosali ya mibale akozwa makabo pe mayele esengeli mpo na kokamba malamu bozwi yango.
Tata ya libota ya makanisi malamu oyo bana na ye nyonso bazali basali minene ya Nzambe akozwa bozwi kolanda lolenge ya mateya ya milimo minene oyo. Na yango, akozwa mbuma ya malamu ya bokambemi na ye ya malamu. Na ngambo mosusu, na bomoi ya kala, tata ya libota oyo asalaki mpamba bozwi na ye, na koboyaka kobatela libota na ye, akobotama na bomoi ya sika, na libota ya bobola to na libota epai wapi baboti na ye baboyaka kobatela ye. Na sima, tango akokoma na mbula ya kosala, akosala mosala oyo lifuti na yango ekopesa ye pasi mpo na kokokisa bamposa na ye. Ezali ndenge wana nde akofuta bampasi ya misala na ye ya kala.
Mama ya pite oyo aboyaki kobatela mateya ya molimo ya bana na ye na esika ya bomoi etala na biloko ya mokili oyo, akobotama na bomoi ya sika, na bozalisi ya elenge mwasi mwana etike, apesami ye moko. Bomoi na ye ya pite ekosala ye koyoka mpasi oyo baloba te oyo ekozala lifuti ya misala na ye ya kala.
Mokambi oyo ayibaki pe asalaki mpamba bozwi ya bato na ye, akobotama na mbeba ya nzoto, moto ya kosenga-senga, afandi na songe ya balabala. Akotanda loboko mokolo na mokolo na baleki-leki oyo bakotalisa na molimo bato oyo asalisaki mabe na bomoi ya kala. Ezali ndenge wana nde akofuta mbuma ya mabe na ye pe ya boyangeli na ye ya mabe, na bozalisi ya makoki te pe ya soni oyo baloba te.
Moto ya mpiaka, na zuwa, na mposa ya biloko ya mokili pe na yango, asemboli loboko na zabolo mpo azala mozwi na mokili, akozala na boloko ya zabolo, tango akokufa. Akokoma mowumbu ya zabolo oyo akobotola ye biloko nyonso apesaki ye na mokili. Lisusu, na bomoi ya sika, moto yango akoyeba soko moke te esengo ya bozwi ya Nzambe. Akozala na bobola makasi, kobanda kino na suka ya bomoi na ye na mokili.
Bato mosusu babungisaka mosala na mbala moko; bamosusu balongwaka na bozwi monene kino kozanga ndako (SDF). Na makambo ya esengo, lolenge mosusu ya bato bamonaka bomoi na bango kobongwana na mbala moko, kolongwa na bobola kino na nkembo, na bozwi ya biloko ebele. Bandakisa oyo ezali kotalisa ete na bomoi moko ya mokili, moto akoki pe kofuta mbuma ya misala na ye pe/to ya bokoli na ye ya molimo.
Bandakisa ezali ebele pe ya ndenge na ndenge, pe ezali kolanda mpasi ya lolenge ya bomoi, ya boponi pe ya bikateli ya bato. Na yango, esengeli koboya koyimayima na oyo tozwaka lokola lifuti na likama ya kofunda Nzambe na lokuta lokola moto ya sembo te. Mpo moto na moto abukaka oyo ye alonaki. Pe Nzambe azali makambo makasi na likambo oyo. Mibeko na ye ya makasi epesaka na moto na moto oyo abongi mpenza na makambo nyonso. Na ngambo mosusu, esengeli koluka bomoi ya malamu na kobatelaka peto esika ya makanisi na biso; na kosenga bolimbisi epai ya Nzambe mpo na bampamba nyonso ya kala to ya lelo oyo etiaka biso na bozalisi ya bomoi ya mpasi. Ezali na makambo yango nde moto akobotola litomba ya kozalaka na ye na mokili.
Eteni ya zomi ezali Mobeko ya Nzambe
Moto asengeli kotosa Nzambe na kopesaka ye na bolingo ndambo ya bozwi na ye na lolenge ya eteni ya zomi, kolanda bwanya oyo elobi: "Nyonso ewuti epai na yo, pe tozwi na loboko na yo oyo topesi yo". "Nkolo, Nzambe na biso, ezali na loboko na yo nde ewuta bozwi nyonso oyo tobongisaki mpo na kotongela yo ndako, epai na yo, na nkombo na yo ya bule, pe ezali ya yo nyonso." [3].
Bato bayebaki likambo ya eteni ya zomi banda kala. Na tango na ye, Abraham ye moko apesaki eteni na ye ya zomi epai ya Melkisedek, mokonzi ya Salem, mosali ya Nkolo Nzambe Na Nguya Nyonso [4]. Oyo elingi koloba ete Mobeko ya Eteni ya Zomi eyebanaki malamu na bato ya tango wana.
Solo, moto nyonso ya molimo oyo andimaka mokolo ya saba lokola mokolo ya bopemi, asengeli koyeba pe motuya ya eteni ya zomi pe mokumba ya molimo ya kofuta yango. Na maloba mosusu, lifuti ya eteni ya zomi ezali na kati ya Mibeko ya Nzambe.
Moto nyonso ya molimo oyo andimelaka ye moko lokola mwana ya Nzambe, oyo azwaka bobateli pe ngolu ya Nzambe, asengeli kotosa Nzambe na lifuti ya eteni ya zomi. Lokola Mibeko pe Bikateli Zomi ya Nzambe, lifuti ya eteni ya zomi ezali mokumba mpo na mondimi nyonso. Nzokande, bosaleli ya mobeko oyo ezali na moboko ya moyemi ya kopona na bonsomi. Mpamba te moto azali na bonsomi ya kotosa to te Mibeko ya Nzambe na boyebi ya bampasi oyo ewutaka na yango kolanda Mobeko ya ntina na mbuma.
Ndenge nini kofuta eteni ya zomi?
Esengeli koyeba ete ezali na baremo te na lifuti ya eteni ya zomi. Mobeko moko oyo ezali ezali bonsomi ya kopesa oyo toyokaka na motema ya kopesa kolanda makoki na biso ya tango wana, na boyebi ete Nzambe azali kotala biso pe ayebi nyonso. Eteni ya zomi ekoki kofutama na biloko lokola na mbongo. Esengeli te kosala ete moto asalema na makasi to kolanda ye mpo afuta eteni na ye ya zomi. Ezali malamu kotika moto na moko na mayele na ye liboso ya Nzambe. Mpamba te soki endimami kosala mondimi na makasi afuta eteni na ye ya zomi, na boye esengeli pe kosala ye na makasi atosa Mibeko nyonso pe Bikateli Zomi ya Nzambe. Nzokande, Nzambe ye moko akoki kosala na makasi te ete moto asala mokano na ye mpo atia bonsomi ya kopona na moto nyonso.
Nani asengeli kofuta eteni ya zomi?
Mobeko ya eteni ya zomi elingi ete bato nyonso oyo bandimaka kozala pe bolamu ya Nzambe bafuta eteni ya zomi, kozanga kokabola. Na yango, eteni ya zomi esengeli kofutama na bakambi bato nyonso ya bisika ya losambo ndenge moko na bandimi.
Esika nini esengeli kofuta eteni ya zomi?
Eteni ya zomi esengeli kofutama na esika ya losambo oyo ebongi na nkombo, elingi koloba esika ya losambo oyo ebetaka mpenza na Losambo ya Solo ya Nzambe. Mpo na yango, oyo alingi kofuta eteni na ye ya zomi asengeli koyoka na motema esika ya kofuta yango. Esengeli komibatela na kofuta eteni na ye ya zomi na esika ya losambo epai wapi ayebi bosaleli mabe ya mbongo ya Nzambe; esika ya losambo epai wapi mokambi ya molimo abotolaka eteni ya zomi, asalaka na yango bozwi ya ye. Kokoba kopesa eteni ya zomi na esika ya losambo ndenge wana, atako na mabe emonani, ezali kozwa ngambu liboso ya Nzambe ndenge moko na mokambi ya mbindo.
Eteni ya zomi esalaka nini?
Soki tondimi liboso ete eteni ya zomi ezali mbongo ya Nzambe, na boye esengeli kosalela yango na makasi kolanda mitindo na ye, elingi koloba kofuta mikumba ya esika ya losambo, kobatela babola, bana ya balabala, bana bitike, bakufela, bato na mikakatano... na libondeli ya Nzambe ye moko. Mpamba te elobami: "Eteni nyonso ya zomi ya mokili, ezala ya biloko ebimaka na mabele, ezala ya mbuma ya banzete, ezali ya Nkolo; ezali eloko ebulisami na Nkolo" [5]. Ata moke te, eteni ya zomi esengeli kosalela lokola lifuti ya mokambi ya molimo ya esika ya losambo. Na yango, lokola bandimi nyonso, mokambi ya molimo asengeli kosala mosala moko oyo akozwa na yango lifuti libanda ya esika ya losambo.
Nani akambaka eteni ya zomi?
Na bosembo, esika ya losambo esengeli kozwama lokola ndako ya Nzambe, elingi koloba esika oyo ebetaka na Mibeko ya Nzambe, esika oyo esangisaka makambo ya bokangi malamu ya miso, epai wapi mondimi nyonso akendaka mpo na kosala boyokani na Nzambe na losambo etonda na Ngolu. Esika yango esengeli kozala na nse ya bokambemi ya molimo ya Mosali ya Solo ya Nzambe oyo abatelaka bokambemi na nse ya mitindo ya Nzambe.
Mokambi nyonso ya molimo oyo akoki kosolola to akoki kozala na boyokani na Nzambe te, abongi te kozwama lokola mosali ya Nzambe. Ye wana ayebani na Nzambe te. Na yango, asalaka na ndanga na ye moko pe kolanda matomba na ye moko.
Na bakambi ya mbindo oyo, bamonami lokola basali babungi, basakoli ya lokuta..., Nzambe atindi nsango oyo ya makasi ya kokebisa: "Bino, basakoli ya lokuta pe basakoli babungi, bozali bilombe. Bobatela mitema na makambo na bino ya lokuta pe ya mbindo. Bobatela mitema mpo Mokalikali ya Kanda na ngai ya Bule ezali mosika na bino te. Bobatela mitema!".
[1] Aggée 2:8, [2] 2 Thessaloniciens 3:10, [3] 1 Chroniques 29:14-16, [4] Genèse 14:18-20, [5] Lévitique 27:30
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Translation of the original message "La dîme, l'argent de Dieu", available on AGA News. In case of difficulty understanding the texts, please refer to the original message in French.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com