Kopesa makabo ezali elembo ya botosi na Nzambe
Na ndenge ya molimo, makabo ezali lifuti oyo topesaka na Nzambe mpo na kotalisa botosi mpo na bolamu na Ye na bomoi ya mokolo na mokolo ya moto. Bandakisa: tokoki kopesa makabo na Nzambe mpo na kozongisa matondi mpo Adefisaki biso nzoto kolongono na mobu mobimba; mpo na kozongisa matondi mpo Asalisaki biso kobima na bokono ya molai mpe ya pasi; mpo na kozongisa matondi mpo Abikisaki biso na liwa ya mabe na accident moko; mpo Apesaki biso nzela ya kozua mwana na suka; mpo Apesaki biso nzela ya kokola na misala na biso; mpo na kolonga na examen, na concours; mpo na kozua mosala sima ya mibu ebele ya pasi, etc.

Nzambe atondi biso na ngolu!
Na Bolingo na Ye mpe Bolingi na Ye oyo emonisami na liloba "Tika pole ezala!", Nzambe akela lola mpe mabele. Akela mai, alona ndenge nyonso ya banyama mpe bitela. Akela minda na lola, mpo na kokabola mokolo mpe butu, mpo na komarka bantango, mikolo mpe mibu, na nsima akela mobali mpe mwasi mpo na kozua na ofele bolamu na Ye nyonso [1]. Na kozongisa, nini mobali mpe mwasi bakoki kopesa na Nzambe lokola lifuti mpo na milende na Ye, Boboto na Ye?
Kaka kondima Nzambe lokola Mokeli Monene ya Mokili mpe kondima ya Moto ya kobika kolanda Mibeko na Ye, Mitindo na Ye mpe Bolingi na Ye ekoki kotonisa Tata ya Lola. Bondimi oyo emonisami lisusu na bomoi ya mokolo na mokolo ya Bato oyo bapesaka Nzambe lokumu mpe bapesaka Ye makabo mpo na bolamu na Ye nyonso.
Ndimbola ya molimo ya makabo
Na ndenge ya molimo, makabo ezali lifuti oyo topesaka na Nzambe mpo na kotalisa botosi mpo na bolamu na Ye na bomoi ya mokolo na mokolo ya moto. Bandakisa: tokoki kopesa makabo na Nzambe mpo na kozongisa matondi mpo Adefisaki biso nzoto kolongono na mobu mobimba; mpo na kozongisa matondi mpo Asalisaki biso kobima na bokono ya molai mpe ya pasi; mpo na kozongisa matondi mpo Abikisaki biso na liwa ya mabe na accident moko; mpo Apesaki biso nzela ya kozua mwana na suka; mpo Apesaki biso nzela ya kokola na misala na biso; mpo na kolonga na examen, na concours; mpo na kozua mosala sima ya mibu ebele ya pasi, etc.
Lisusu, tango bandimi bandimaka bolamu ya basali ya Nzambe na mosala na bango ya bulee awa na mokili, bandimi yango, batondami na esengo, bakoki kokata na bonsomi, na bondimi, kopesa libanga na bango mpo na bolonga ya misala na bango na kopesa makabo ya mbala moko, ya likambo moko na Nzambe, oyo ekozala, ndakisa mpo na kosalisa kotonga ndako ya losambo oyo ebongi na Nkombo Mosantu ya Nzambe, ndenge esalemaki na bakonzi mingi ya mabota oyo, "tango bakomaki na ndako ya Yawe na Yelusaleme, bapesaki makabo ya motema mpo na ndako ya Nzambe, mpo etelemisama lisusu na esika na yango" [2].
Nini tosengeli kopesa lokola makabo?
Esengeli kopesa lokola makabo na Nzambe eloko oyo etangemi mingi na motema na yo, ndenge liloba elobi "Moto na moto apesa ndenge akanaki na motema na ye, na mawa te to na kotindama te; zambi Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo."[3]
Na tango ya kala, Abraham azalaki kopesa banyama ya malamu koleka ya etonga na ye epai ya Nzambe, lokola makabo. Na tango mosusu, mpo na kozongisa matondi na Yawe Nzambe mpo na bobateli na Ye, bakonzi nyonso ya bitumba bapesaki Mose, lokola makabo na Yawe, biloko ya wolo, basene, maboko ya loboko, bapete, biloko ya litoyi, mpe mayaka [4].
Lelo, bantango ebongwani boye makabo esengeli kozala ndenge na ndenge na lolenge mpe na mbongo. Bandakisa: mwasi oyo azali na mbongo mingi te, akoki kopesa lokola makabo elamba na ye ya sika ya pagne oyo ye alingaka mingi, etc.
Ndenge nini kopesa makabo?
Topeselaka makabo mpo na ntina moko ya solo mpe ya mbala moko tango toyokaka yango na bosolo na motema. Esengeli kopesa na motema na yo mpe koluka te kosepelisa bato. Esengeli kopesa yango na kimia na lisanga na Nzambe oyo amonaka nyonso. Na bokeseni na eteni ya zomi oyo ewutaka na Nzambe kino na Bato (kobanda na likolo kino na nse), makabo ewutaka na Bato kino na Nzambe (kobanda na nse kino na likolo). Ewutaka na makanisi ya moto na kondima ya Ngolu mpe bobateli ya seko ya Nzambe.
Mpo na nini kopesa makabo?
Atako makabo ezali mibeko te lokola eteni ya zomi (oyo ezali Mibeko ya Nzambe), emonisaka kaka bolingo ya molimo mpe etamboli malamu oyo etie moto na lolenge ya komonisa mpe koloba bondimi na ye liboso ya Nzambe. Makabo ebikolaka motema ya mondimi mpe esalisaka ye komonisa esengo mpe bondimi na ye na kotalisa Bolingo, Mawa mpe Motema molai ya Nzambe.
Tango nini esengeli kopesa makabo?
Mpo na kopesa makabo, esengeli liboso kozala na botosi. Mpamba te moto oyo azali na lokoso koleka, to oyo azali na motema ya kosalisa bato te akomona te mposa ya kopesa makabo. Ezali na ntango te, to mokolo ya botosi te kasi moto na moto asengeli koyoka yango na motema na ye kolanda bolamu ya Nzambe epai na ye.
Wapi mpe epai ya nani esengeli kopesa makabo?
Bana nyonso ya Nzambe oyo bazali na bondimi mpe bazali na botosi bakoki kopesa makabo na Nzambe. Makabo ekoki kopesama bisika nyonso oyo oyoki mposa mpe epai ya nani oyo olingi. Ekoki kosalema na ndako ya losambo to libanda ya ndako ya losambo, bisika nyonso oyo likoki ekomonana.
Na ndako ya losambo, makabo etindamaka ntango nyonso epai ya Nzambe. Nzokande, ekoki kopesama mbala moko epai ya mosali ya Nzambe oyo abikisaki moto na nguya ya Nzambe. Na bosolo, makabo oyo epesami na Nzambe oyo na nzela na ye apesi mosali na Ye oyo akokisaki mosala na ye na bondimi.
Ndenge moko, makabo epesami na moto ya bobola epesami solo epai ya Nzambe oyo na nzela na ye apesi na moto ya bobola. Na molimo, elandaka boye: Nzambe asalaka na oyo ayoki mposa ya kopesa makabo mpo ete ye akende epai ya moto ya bobola. Oyo ekoki kosalema kaka tango makabo epesami na esengo ya motema, na kotosa Nzambe. Na makambo nyonso mosusu epai wapi moto oyo apesi makabo alingi komimonisa, azali na bomoto mibale to asali na kotindama, Nzambe andimaka makabo te mpe akotaka kati te. Lolenge malamu ya kati mpe kimia esengeli kozala mobeko.
Nini kosala tango tozui makabo?
Moto oyo azui makabo, asengeli liboso komonisa botosi na ye epai ya Nzambe, kozongisa matondi na Ye na libondeli etonda na esengo, sima kozongisa matondi na bosolo na oyo apesi ye makabo. Esengeli kosalela malamu makabo oyo ezwami mpamba te ezali likabo ya Nzambe.
Na ndako ya losambo, makabo ekoki kosalelama mpo na kofuta mikumba, kotonga to kobongisa ndako ya losambo..., kolanda mposa ya mondimi oyo apesi makabo. Ndakisa: mondimi akoki kopesa makabo oyo etindami mpo na kofuta facture ya courant, ya mai, ya banzete ya mwinda, ya bafololo, ya bakiti, etc.
[1] Genèse 1, 2, [2] Esdras 2:68, [3] 2 Corinthiens 9:7, [4] Nombres 37:48-50
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Translation of the original message "Donner l’offrande est un acte de reconnaissance à Dieu", available on AGA News. In case of difficulty understanding the texts, please refer to the original message in French.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com