Bomoi etongami na kobanda lisusu
Bomilengela na Nguya na ngai ya monene mpe ya bomoi, mpo na kobanda lisusu makambo nyonso, mbala mingi ndenge yango ekosengama. Pamba te bomoi etongami na kobanda lisusu ya ntango na ntango. Mpo na nini bolembaka kobanda lisusu makambo nyonso tango mzinga ya bomoi esengaka yango ?...
Bolembaka mitema te mpe bobangaka te; kasi bozalaka na kondima mpe na kobanga Nzambe. Bomilengela na Nguya na ngai ya monene mpe ya bomoi mpo na kobanda lisusu makambo nyonso, mbala mingi ndenge yango ekosengama. Pamba te bomoi etongami na kobanda lisusu ya ntango na ntango. Kobanda lisusu makambo nyonso ezali kokende na moboko ya sika, kozwa makasi ya sika mpe makanisi ya sika; ezali komipesa elikya ya sika etonda na bomoi.
Botala bizaleli ya biloko ya mokili: ezali mpe na kobanda lisusu ya ntango na ntango. Bangomba ya moto ebotisaka bangomba ya sika, kokwea ya mabele esalaka mabele ya sika, mbula epetolaka mpe esukolaka mokili, mopepe epetolaka mopepe mpo na mpema ya sika ya bomoi, moto ezikisaka zamba, kasi zamba yango ebimaka lisusu na eleko oyo ebongi, mpe bongo-bongo. Lokola Nzambe, bizaleli ya biloko ya mokili elembaka soki moke te kokomisa nyonso sika mpo na bato. Yango wana, bino bato, bozeli nini mpo na kosala ndenge moko?
Mpo na nini bolembaka kobanda lisusu makambo nyonso tango mzinga ya bomoi esengaka yango? Mpo na nini bolembaka kobanda lisusu boyokani ya bolingo tango etondi na mitungisi ya ntango na ntango mpe na mawa oyo esilaka nzoto te, oyo ebebisaka bomoi na bino ya malamu mpe ememaka bino na libulu ya bozindo? Mpo na nini boboyaka kotika baninga, bandeko mibali na bandeko basi oyo babebisaka bomoi na bino? Nini epekisaka bino to esimbaka bino mpo na kobanda lisusu bomoi na bino elongo na bato ya sika? Boni, likambo ya ntina eleki te ezali nde kokoba liboso na kondima mpe na bopetoli? Bobosani ete « pamba ya bapamba, nyonso ezali pamba »?[1] Eloko nini eleki motuya koleka lobiko ya molimo na bino? Bampasi nyonso ya mpamba oyo bomipesaka na libanda ya lobiko yango, ezali na tina nini?
Boyeba ete ntina ya liboso ya bomoi na bino awa na mokili ezali koyekola kobika na kotosa mibeko ya Nzambe mpo na kozwa lisusu paradiso na sima ya kufa na bino. Mpo na yango, bosengeli kobongisa mpe kobongola bomoi na bino tango na tango mpo na kokoka mokano yango. Bozanga te kobanda lisusu makambo nyonso soki yango esengami. Botala ndakisa ya Yobo, oyo abungisaki nyonso liboso ya kozwa lisusu nyonso na kobanda ya sika ya bomoi na ye. Ezali na tango ya sima te na bomoi. Ata ngonga ya suka ya bomoi na bino ezali na tina mpo na Ngai. Bokanisa moyibi oyo babakaki na ekulusu pembeni ya Yesu: na bantango ya suka ya bomoi na ye, azwaki kondima ya kondima Yesu lokola mwana na Ngai. Kobanda ngonga wana, azwaki lisusu bokonzi ya likolo.
Elongo na bino bato, nalembaka soki moke te kobanda lisusu. Banda bokelami na bino kino lelo, natikaki soki moke te kolimbisa masumu na bino mpo na kopesa bino mabandami ya sika, ata soki mbala mosusu nazelaka lisusu eloko moko te ya sika epai na bino. Na eleko na eleko, natindelaka bino baprofeta ya sika, kasi boboyaka koyoka bango mpe bokitaka lisusu na libulu ya bozindo. Lisolo na bino etondi na minyoko mpe na koboma basali na Ngai oyo natindaka nzokande mpo na kosunga bino kozwa lisusu nzela. Bokendaki mosika mingi tango bobomaki mwana na Ngai Yesu, oyo bowanganaki mpe bobengaki mofingi. Atako misala na bino nyonso ya bozoba, nabandaka lisusu tango na tango na kotindela bino baprofeta ya sika mpo na kongengisa bino.
Bolingo na Ngai mpe Ngolu na Ngai etindikaka Ngai kosala bongo, kasi bomikosa te, pamba te Nazali Mobeko. Bosembo na Ngai ekoki kobebisama te mpe ezangi bopende ata moke. Nasalaka bongo mpo na kolongola bino nzela nyonso ya kokima na mokolo ya kosambisama na bino liboso ya basambisi sambo ya mokili ya bawa. Bondima Ngai, bokoyanola mpo na mabunga na bino nyonso mpe masumu oyo bosalelaki yango boyengebene te. Nakomaka nyonso, na bomoi nyonso, na buku ya bomoi na bino.
Boni, nalembaka mpo na kotindela bino Nguya na Ngai ya monene? Mobu na mobu, nakomisaka Nguya oyo sika mbala misato kati na bikelamu, na bafeti ya Pantekoti, ya Lisi ya Peto mpe ya Monzoto ya Beteleme. Bosalaka nini mpo na kobongisa likambo yango soki ezali kaka kosalela mabe Nguya na Ngai? Nasepelaka na bato mwa moke oyo babatelaka miso na bango epai na Ngai, mpe ntango mosusu na matondi ya bandeke na banzembo na yango ya kitoko, na malamu ya bibale ya mikonzi oyo etiolaka na bizaleli ya biloko, na banzete oyo esepelisaka Ngai na bafololo na yango ya kongenga, na banyama oyo epesaka Ngai matondi na eleko na yango ya bolingo...
Mpo na nini boboyaka kobanda lisusu boyokani ya sika elongo na bato ya sika? Boni, bokoki kotala na motema ya moninga na bino mpo na koyeba nani azali ngenge mpo na bino? Na makambo mingi, Nasanganisaka makoki mpo na bokabwani na bino na bato oyo babebisaka bino, kasi boboyaka kondima solo oyo eliyaka bino mpe ezikisaka bino moke moke, lokola bokono ya kanser. Nazali koloba na bino solo: boyokani mosusu ya bolingo, ya boninga, ya bondeko, mpe kutu ya baboti, ezalaka na bantango mosusu mabe. Soki ezali bongo, eleki malamu bolongola yango mpe bobanda lisusu ya sika.
Bomoi ekangami te na bato mwa moke. Natindaka basali ya Nzambe ebele mpo na kosunga bana na Ngai awa na mokili. Soki moko ya basali yango akwei mpe aboyi komibongisa, atako Napesaka ye nzela mingi ya lobiko, nazongisaka ye na mosusu, ata soki esengeli Nazela mbotama na ye awa na mokili mpo akoma na mibu ya mosala. Moto moko te azali na ntina mingi liboso na Ngai. Nazali Nzambe ya bokengi. Bomoi etelemaka te mpe ekotelema ata moke te. Yango wana, bozala na bokengi mpe bomibongisa mpo na kobanda lisusu tango yango esengami. Bobala lisusu soki esengami, boluka mosala mosusu, baninga ya sika. Soki baboti na bino batiki bino, boluka baboti ya molimo, bandeko na Klisto, mpe bongo-bongo. Ekozala mpasi nini mpo na kozala na Yesu-Klisto lokola moninga se moko ya sikisiki? Bokanga malamu likambo oyo na motema: Nzambe kaka nde azali na kondimisa.
Basali mosusu ya Nzambe balembaka mitema mpe bakangaka misala na bango ya bonganga-Nzambe pamba te bandimi na bango bakangelaki bango ekuke. Boyebi nini na likambo oyo nyonso? Boni, ekosengama te ete Nasukola kati na mosala na bino ya bonganga-Nzambe na kobimisa bameme wana ya mabe?
Boyeba ete ezali Ngai, Nzambe, oyo nakambaka bandimi ya solo epai ya misala ya solo ya bonganga-Nzambe oyo ezali na boyokani na Ngai. Eleki malamu kozala na bandimi moke na esika ya kozindisama na bakosi, batali-nkuku mpe basali ya zabolo oyo bayokisaka bino mpasi mokolo mobimba na mikakatano oyo esukaka te mpe ezangi tina. Bayaka te mpo na kosambela, kasi mpo na komeka bino mpe kotungisa bino mpo na kolongola bino na mosala na bino ya lokumu.
Ezali na basi oyo bakangamaka na kotikala na mabota epai bazalaka na minyoko, kozwama lokola biloko, mpe bakosami na mbeto ya libala, na nkombo ya kotikala mpo na bana na bango to mpo bazali mibange mingi mpo na koluka mobali ya sika. Nani apesaka mobali mpe bana? Na mibu boni Sara abotaki elongo na Abrayama? Na mibu boni Yobo abalaki lisusu mpe azwaki bana ya sika? Ngai, Nzambe, nazali na ndelo te. Nguya na Ngai ezali monene mpe ezanga suka. Bosambela Ngai na motema ya solo, na bozindo ya molimo na bino, mpe bokomona oyo elandi. Nazwaka ntango nyonso nzela oyo esengami mpo na lobiko na bino.
Na makambo mingi, Nalakisaka bino nyonso na misala ya solo, kasi boboyaka kondima solo, mpe bolukaka mabongisi ya lokuta mpo na kokoba na mpongi na bino ya makasi. Tango bakonzi ya mangomba bandimaka bosoni, bosangisi na bana mike, mibali to basi ebele, bamikangaka na misala ya satana mpe balobaka ete Nzambe abungisaka na bantango mosusu, boni yango ekoki te mpo na koyeba na nani bozali na yango likambo? Na esika ya kozwa bikateli ya makasi, bolimbisaka bango mpe babundelaka bango na maloba oyo: « Mosuni ezangi makasi, balobaka bongo mpo na mibu na bango... » Bokokende kino wapi, bino bato?
Na bisika na bino ya losambo, Nalakisaka bino bizaleli mabe ya bosoni, ya misala ya kimobulu oyo ezongelamaka mbala na mbala epai ya bakambi na bino, kasi botikalaka wana, kozanga koyokana. Bato ya mawa! Nasengeli kosala nini mpo na kolamusa bino? Nini epekisaka bino kobongola esika ya losambo tango boyokaka malamu te wana? Boni, bosengeli kosambela na esika ya losambo oyo ebongi te mpo na bino? Mpo na nini kosambela te na kimia ya ndako na bino, soki bisika na bino ya losambo ezali biloko ya kobunga? Mwana na Ngai Yesu alobaki: « Kasi soki ozali kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke, mpe sambela Tata na yo oyo azali kuna na esika ya nkuku; mpe Tata na yo, oyo amonaka na nkuku, akofuta yo. »[2]
Nazalisaki lingomba moko te to esika moko te ya losambo, kasi Nandimaka yango tango nyonso ezali kosala na boyokani na Ngai mpe epesaka bana na Ngai nzela ya kozala na boyokani ya pene na Ngai. Soki mangomba ndenge na ndenge ya mokili elandaka nzela ya sembo mpe eyokanaka na Liloba na Ngai, ndenge Yesu-Klisto ateyaki yango, nyonso elingaki komema Solo moko, pamba te Nazali Nzambe Moko, mpe Solo na Ngai ya sikisiki ezali moko. Mpo na nini mangomba ebele boye mpo na Nzambe moko?
[1] Ecclésiaste 1:2, [2] Matthieu 6:6
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "La vie est faite de recommencements", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
