Nzambe azali na boyebi nyonso, nguya nyonso mpe azali bisika nyonso

Na nguya ya boyebi na ngai nyonso, nayebi makanisi na bino nyonso, maloba na bino mpe misala na bino, liboso ete bosala yango. Nazali Mokonzi ya tango mpe ya makambo nyonso; nayebi nyonso, namoni nyonso... Tango bozali na mpema te, bosenga nguya na ngai. Mpe ekokoma epai na bino, pamba te nazali na nguya nyonso. Boyeba ete mabondeli malamu mingi ezali oyo esengi nguya na ngai. Nguya na ngai ekosila te. Ezali neutre mpe epesaka bino nzela ya kokoka kosala makanisi na bino ya bule... Nazali bisika nyonso, pamba te nazali bisika nyonso lokola moko, kobanda na mokili ya bule kino epai na bino. Nazali kati na bino, zingazinga na bino, elongo na bino...

Nzambe azali na boyebi nyonso, nguya nyonso mpe azali bisika nyonso

Nazali moboko ya Bokeli. Nazali na ebandeli mpe na nsuka ya biloko nyonso. Ezali Ngai oyo nakelaki bino mpe nabateli bino na bomoi na nzela ya Molimo-Mosantu. Soki nalongoli nguya na ngai, nyonso ekosila. Nayebi bino na makambo mike nyonso, pamba te eteni ya mwinda na ngai ya nzambe ezali kati na bino. Na nguya ya boyebi na ngai nyonso, nayebi makanisi na bino nyonso, maloba na bino mpe misala na bino, liboso ete bosala yango. Nazali Mokonzi ya bitango mpe ya makambo nyonso; nayebi nyonso, namoni nyonso. Na likambo wana, ndenge nini bokanisi ete bokoki kobombana liboso ya elongi na ngai?

Ba-hypocrites mingi kati na bino basalaka lokola bagumbameli ngai na bisika ya losambo na ba-fetiche na bango na poche. Basusu lisusu bafutaka dîme na mbongo ya makila, mpo na komonana mpe mingi mpo na kozela kokosa bokengeli na ngai. Bopesaka ngai makabo oyo ewuti te na motema na bino. Bokendaka kosambelaka ngai na koyina kati na motema na bino. Mitema na bino etondi na kanda mpe etumbaka mpo na kozonga likomi ntango bozali kosambelaka ngai mabondeli. Bokokani kogumbamela ngai ntango bokoki te kolingaka bato na bino.

Ezali ya masakasaka, lokola bolingi te bino moko. Bokomisi nzoto na bino na ebebi ya lolenge nyonso: ba-drogue, ba-cigarette, kolangwa masanga, kindumba, ba-sexualité ya bokono, misala ya ba-occulte... Bokoki lisusu te kozala na bomoi na esengo mpe kosepela; bomoi na bino ezali ya mawa, ya mawa, ya mitungisi, ya stress, ya mitungisi ya mokolo nyonso. Nzokande, bokokani kozala na kondima. Wapi botii ngai na makambo wana nyonso? Namoni kondima moko te kati na bino. Bozali na molai te mpe bolingi kosala makambo ndenge bolingi. Na likambo wana, mpo na nini bosambelaka ngai, soki bolingi komimonisa lokola ba-maître?

Boyeba ete nayanolaka mabondeli na bino kolanda kondima na bino mpe bosolo ya motema na bino. Mpe, nasalaka likambo moko moko na ntango na yango, mpo na bolamu na bino. Boye, boyekola kozala na bomikemike mpe mozindo ntango botali epai na ngai, Nzambe ya seko. Nayanolaka te ba-hypocrites, ba-lofundu, bayini, to baninga ya satana. Esengeli te koganga to kosala makelele ntango bosambelaka ngai pamba te liboso ya kosambelaka ngai, nayebi oyo bolingi. Boye, bosambelaka ngai na kimia, na bokebi mpe na sekele monene ya motema na bino, pamba te nazali kokufa matoyi te.

Ntango bozali na mpema te, bosenga nguya na ngai. Mpe ekokoma epai na bino, pamba te nazali na nguya nyonso. Boyeba ete mabondeli malamu mingi ezali oyo esengi nguya na ngai. Nguya na ngai ekosila te. Ezali neutre mpe epesaka bino nzela ya kokokisa makanisi na bino ya bule. Nguya na ngai ezali ya koyebana te. Ezali yango oyo epesaka nzela ya kosala bikamwa ya nzambe ntango masengeli nyonso ekokani.

Nakabeli eteni ya nguya na ngai na oyo nalingi, ntango nalingi mpo na koya kosunga bino, na bisika nyonso ya mabele. Ezali oyo nasalaki ntango nyonso na basakoli na ngai mpe basali nyonso ya Nzambe oyo natindaki na mission ya liboso mpo na kosunga bino. Na nguya na ngai, nasalaka kati na bango, na nzela ya bango mpe na kati ya bango. Basali na ngai basalaka na mabele lokola maboko na ngai, makolo na ngai, monoko na ngai mpe matoyi na ngai. Ntango nalingi kobikisa moto oyo asambelaka ngai na bosolo, natindaka moko ya basali na ngai atia loboko na mokono wana, sima natindisaka nguya na ngai na mokono, na nzela ya mosali na ngai. Basakoli na ngai basalaka lokola monoko na ngai ntango bapesaka Liloba na ngai ya Solo na bato na ngai. Nayokaka mawa, mpasi ya bana na ngai, na nzela ya matoyi ya basali na ngai oyo bapesaka bango ntoli oyo ewuti na ngai Nzambe. Basali na ngai ya solo balobi mpe basalaka kaka oyo nasengi na bango, kozala te na kobakisa, to kolongola likambo moko. Yango wana, mbala mingi bozuaki bango lokola ba-nzambe, na libunga.

Ntango namoni ete esengeli nasala nyonso wana na ngai moko, mpo na libebi na bino ya mozindo mingi, nakitaki na mabele na moto ya Yesu-Klisto. Yesu azalaki Nzambe kati na bato. Mpo na nivo ya bososoli na bino ya moke mingi, namipelisaki babengaka ngai Mwana ya Nzambe. Soki te, nani alingaki kondima Nzambe na lolenge ya moto? Atako mabonza nyonso oyo nasalaki mpo na lobiko na bino moko, bogataki ngai, na ntango wana. Nsukansuka, sima ya mibu 2000, bososoli Yesu lokola Nzambe. Nani kati na bino, bato, akoki kolakisa molai ya boye? Kokweyaka na masumu mpe kozanga kondima na bino esali ete boyebi te bonene ya Nzambe Mokeli na bino. Botelema, Nzambe azali Nzambe. Nazali Nzambe ya seko, Nzambe moko keka, bazali na ba-nzambe mosusu te liboso ya elongi na ngai.

Nazali bisika nyonso, pamba te nazali bisika nyonso lokola moko, kobanda na mokili ya nzambe kino epai na bino. Nazali kati na bino, zingazinga na bino, elongo na bino. Satana aluki ntango nyonso kolanda ngai, kasi liboso ya polele ya kondima na ye, atondisi mabele na ba-démons na boluki ya ba-sango. Ba-démons na ye bapesi mokumba ya kosonga butu mpe mokolo mpo na kopesa ye ba-sango. Ntango ngai Nzambe, nayebi nyonso kozanga mpasi moko, lokola nazali bisika nyonso lokola moko. Nayebisi basali na ngai nyonso mokolo na mokolo ya nyonso oyo ezali kopanga na mosala; ba-mwango nyonso ya satana emonisami na bango liboso ya kosalema na yango. Ndenge moko, nakebisi bana na ngai nyonso na likolo ya mabele ya makambo oyo ekoya, mingi mingi na nzela ya ba-ndoto. Mawa, mingi bazali ya kokangama, batioli ba-ndoto to babosani yango ntango balamuki. Oyo azali na mbeba soki mabe ekomeli bino?

Nazali moboko ya Bokeli. Nazali Alpha mpe Omega. Wuta kala mingi, nakebisi bato ya makambo oyo ekoya, na nzela ya basakoli na ngai mpe Mwana na ngai Yesu. Kasi bomonani lokola botioli makebisi na ngai nyonso ntango bilembo ya polele ya Apocalypse ezali liboso ya bino. Bitumba, ba-inondations ya pene nyonso, bokono oyo bakoki kobikisa te oyo ekomaka ebele, ba-catastrophes naturelles oyo ebomaka bato mingi, ba-enlèvements minene esengeli kopesa bino mayele. Ngonga ezali lisusu ya kosepela te. Bokomaki na nsuka ya kovanda na bino na mabele. Bosangana mpo na kobanda mobembo ya kozonga na mboka na bino ya libandela.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !

Traduction du message original "Dieu est omniscient, omnipotent et omniprésent", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Sources Ph. illustration: www.freepik.com