Lolendo ya moto liboso ya Nzambe
Moto akanisaka ete azali na kati ya biloko nyonso, kema moko ya Nzambe, moto oyo akoki kobosama te. Nani moto mpo na kolendela kokota na banzela ya Nzambe? Ayebi bolingo ya Nzambe te, molende ya Nzambe te, mawa ya Nzambe te, moto akomi kutu kokanisa ete Nzambe azali kolanda ye. Lolendo mingi !
Moto akanisaka ete azali na kati ya biloko nyonso, kema moko ya Nzambe, moto oyo akoki kobosama te. Nani moto mpo na kolendela kokota na banzela ya Nzambe? Nini nyama oyo ya lolendo, nyoka moke ya mabele oyo azali na mposa ya koluka elongi ya Nzambe? Ayebi bolingo ya Nzambe te, molende ya Nzambe te, mawa ya Nzambe te, moto akomi kutu kokanisa ete Nzambe azali kolanda ye. Lolendo mingi!
Na tango oyo, banyama mingi mosusu ezali malamu koleka bato, pamba te yango eyebi esika na yango, ndelo na yango. Banyama eyebi ete ezali na Bikelamu ya ntina, ba-Anjelu, ba-Liboso, ba-Arshanjelu mpe milimo minene mosusu ya mikili ya likolo. Banyama ekoswanaka na Nzambe te. Banyama etosaka Nzambe na boyengebene na mosala na yango, nzokande basali ya Nzambe oyo babungi nzela batiaka mibeko na Nzambe: "Nkolo pesa ngai bozwi, pesa ngai mwasi, mobali liboso ya kosala mosala na yo"; "Nkolo bikisa ngai liboso; Nkolo mosala oyo ezali makasi, nakoki kokufa".
Banyama ezongisaka matondi mingi koleka bato, ndenge mbwa esalaka na nkolo na yango oyo asalisaka yango. Nyama oyo bakobatela malamu, batungi malamu, ekabaka nkolo na yango te. Ndeke oyo ekuti nkona ya kolia na lopango moko, ekopumbwa mpe ekoya ntango nyonso na esika wana mpo na kolia. Mpe mpo na kozongisa matondi, ndeke ekosakola nkolo na yango na loyembo na yango ya kitoko. Kasi moto azongisaka matondi na mpasi, soki obongi komibongisa mpo na ye, soki obongi "koboma" ndeko na yo mpo na ye, akopesa yo mokongo na ye kozanga ata moke ya matondi.
Nani kati na bato ayebi bosikisiki bomoi ya pole oyo ba-Anjelu bazali na yango na Paradiso, na botosi makasi ya Mibeko mpe Mokano ya Nzambe? Nzambe azali Nzambe; "Banzela na ye ezali na mozindo te" mpe ekozala bongo tango nyonso! Tika moto asepela kaka na koyekola Mibeko mpe Mokano ya Nzambe na mabele.
Bosala keba, bino oyo bozali koluka kopinga Nzambe !
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "La prétention humaine à l'égard de Dieu", disponible sur AGA News.
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com
