Bampasi ya kondima

Bampasi oyo nazali kopesa bino ezali te mpo na koboma bino to kobebisa bino. Nzokande, ezali mpo na kolendisa bino, kotonga bino, kolendisa mitema na bino mpe, na suka, kosalisa bino mpo na kolendisa elikya na bino epai na Ngai, Nzambe na bino. Kondima mpe bampasi ekendaka elongo...

Bampasi ya kondima

Bampasi oyo nazali kopesa bino ezali te mpo na koboma bino to kobebisa bino. Nzokande, ezali mpo na kolendisa bino, kotonga bino, kolendisa mitema na bino mpe, na suka, kosalisa bino mpo na kolendisa elikya na bino epai na Ngai, Nzambe na bino. Kondima mpe bampasi ekendaka elongo. Solo, moto nyonso oyo alobi ete azali na kondima, asengeli kozela koyamba bampasi oyo ekokangana na yango mpo kondima na ye ekoma ekanisi oyo ekobongwana te.

Nazali koloba lisusu, kondima mpe bampasi ekendaka ntango nyonso elongo, pamba te bampasi epesaka ngai nzela ya komeka mpe koyeba nani kati na bana na ngai azali na kondima ya solo. Solo, lokola bozali nyonso na mokili, bolobaka nyonso ete bozali na kondima. Ezali mpo na yango bampasi na ngai eyaka komeka bino mpo na koyeba nani kati na bana na ngai azali na kondima oyo ekobongwana te to kaka azali komilobela. Bampasi na ngai ezali bomeka ya kondima ya mokolo na mokolo.

Bana na ngai, boyeba ete nazali Nzambe ya Bolingo mpe Nzambe ya Zuwa oyo andimaka te kokabolama. Mpo na makambo wana, nazali na motema molai mpe nalembi na koyangola mabondeli na bino nyonso. Na ndenge wana, nazali kosala nyonso mpo na komeka mpe kozonga na motema ete bosenga na bino ezali ya sembo. Solo, ezali te ya koloba ngai: "Nkolo, nazali pene ya kosala nyonso oyo okosenga ngai nasala na misala na ngai na mokili," mpe na sima kolela, kosala mawa oyo nalandaki yo. Basali na ngai ebele bazali kobeta tolo na bango, kolobaka: "Nalingi kosalela Nzambe; bomoi na ngai mobimba ezali ya Nzambe," kasi tango napesaki bango moke ya mpasi na makolo, bazali nyonso bebisami, mitema na bango ezali mobulu mpe bakokani lisusu te.

Nazali koloba bino, na bosolo, kosala misala na ngai ezali likambo ya pasi te. Ezali mpo na yango nazali kobongisa bino na likolo, liboso lolenge na bino na mokili. Bobongisi na bino ezali kokoba wuta tango bobotami kati na bato ya mokili oyo, mpo na kosalisa bino bozala na kondima na nzela ya bampasi oyo nazali kotia liboso na bino. Yango ezali nzela oyo esengeli koleka mpo na moto nyonso oyo alingi kosalela ngai ya solo. Mpe esengeli koboya koloba: "Nkolo, nabikisi nyonso, natiki nyonso mpo na yo mpe ozali kotika ngai nakufa na bampasi." Nzokande, soki bozalaki na motema ya sembo, mbala moko bolingaki komilanda na bandakisa ya Job, Anne, Abraham, Moyize, Esther, Jeremi… Basali wana ya mpiko bazalaki nyonso na kondima mpe elikya epai na ngai Nzambe na bango. Mpo na yango, bazalaki ntango nyonso pene ya koyamba lolenge nyonso ya bampasi oyo nazalaki kotia na nzela na bango.

Nzokande, na bokeseni na basali wana ya lokumu, bozali nini lelo? Lolenge nini ya bana bozali? Kondima moko te emonani na bino. Nzinzi moko ekosimba bino moke, mpe bozali na mobulu. Boyeba ete bampasi elandisamaka ntango nyonso na bitatoli ya kondima. Boye, botika kopota epai na epai mpe boyekola kolendisa kondima na bino. Bomilobela ete bampasi oyo nazali kotia na nzela na bino eyaka te mpo na kobebisa bino. Nzokande, ezali mpo na kopesa bino elikya, motema ya kokangama mpe mingi koleka, kosala bino makasi.

Bino basali na ngai, bobatela ete moto nyonso oyo azali na kondima ya solo, azali pene ya kolonga mpasi nyonso oyo nakopesa ye. Yango ezali mosala oyo nasenga bino bosala. Ezali na yango nasenga bino bolanda lolenge ya Abraham, "Tata ya kondima."

Mbala mingi bolobaka ete bampasi ya makasi oyo bozali koleka ewutaka na satane. Nazali koboya malamu makambo yango pamba te satane, na kombo na ye ya solo Lucifer, azali anzelu na ngai oyo akweyi. Ezali ngai oyo nakelaki ye, yango wana akoki kozala likolo na ngai te na misala. Ata soki akweyi, Lucifer azali koloba ngai ete bozali na bosembo te na maloba na bino, lokola: "Tata, soki opesi ngai bozwi, soki osalisi ngai nasilisa likambo oyo to wana, nakotikala na yo ya sembo…" Mpo na kolakisa ngai ete bozali kokosa, kolakisa ngai bitatoli ya maloba na ye, Lucifer azali kosenga ngai ntango mosusu natika ye ameka bino.

Na ndakisa na bosenga na ye, nazali kolongola moke maboko na ngai ya kobatela mpo na kotika ye ameka bino mpe amekisa bino. Na mawa, bozali kopesa reto na Lucifer mbala nyonso amekaka bino. Soki bozalaki makasi, misala na ye nyonso elingaki kozala na bopusi moko te likolo na bino. Nzokande, bolingaki kotelemela minyoko na ye. Mpe bampasi na ye ya mabe elingaki nzokande kosalisa mpo na kolendisa kondima na bino. Kasi soki Lucifer alongi kosala bino bokweya mpe alakisi ngai ete bozali bololo mingi, bongo, ngai Nzambe na bino, nakoloba bino ete bozali nanu pene te mpo na koleka bampasi ya kondima.

Bobatela ete moto nyonso oyo alobi azali na mosala na ngai na mokili, asengeli koyeba ete bomeka ya kondima mpe bampasi oyo ekokangana na yango ekozala ntango nyonso na ekuke na ye. Mpo na yango, asengeli kotia nyonso na misala mpo na kolakisa ngai ete azali pene ya koyamba yango mpe kolonga yango na mpiko.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !

Traduction du message original "Les épreuves de la foi", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Sources Ph. illustration: www.hiclipart.com