Mabongisi ya Nzambe
Nalobi bino na bosolo, na bosolo, mabongisi na Ngai ezali na nsuka te mpe ekoki koyebana te. Ezali makasi mpo na kokota banda ebandeli tii na nsuka ya kosala yango. Eloko moko te ya nzambe, ata ba-archange te bakoki komilakisa ete bakoki koyeba oyo Ngai Nzambe nazali kosala mabongisi... Na kosala mabongisi P moko, nakoki kosalela banzela mpe mayele ndenge na ndenge, kasi mikano mpe nsuka ebongwani te... Nazali Nzambe ya libela, bilaka na Ngai esalemaka ntango nyonso, na tango oyo ezali malamu...
Nalobi bino na bosolo, na bosolo, mabongisi na ngai ezali na nsuka te mpe ekoki koyebana te. Ezali makasi mpo na kokota banda ebandeli tii na nsuka ya kosala yango. Eloko moko te ya nzambe, ata ba-archange te bakoki komilakisa ete bakoki koyeba oyo Ngai Nzambe nazali kosala mabongisi. Na bosala na bango, ba-anze mpe biloko nyonso ya pole bazali na bonsomi ya liboso te. Bazali kofanda na botosi makasi ya mibeko na ngai mpe mokano na ngai. Na Paradis, nyonso ebongisami mpe ezali na se ya mibeko ya Nzambe. Masumu ezali kuna te. Yango wana bomoi ezali ya libela kuna.
Bino bantu, bozali ntango nyonso na lolendo ya koyeba nyonso, kososola nyonso mpo na bonsomi ya liboso oyo natie na bino. Boyeba koyamba mikuse na bino. Eloko nini bozali koloba ntango bolobi: "banzela ya Nzambe ekoki koyebana te"? Ezali te mabongisi na ngai oyo tozali kosolola? Ezali bosolo, banzela ya Nzambe ebengami mpe mabongisi ya Nzambe. Mabongisi na ngai ezali na banzela mpe mayele ya kosala, mikano ya kokoma mpe nsuka.
Na kosala mabongisi P moko, nakoki kosalela banzela mpe mayele ndenge na ndenge, kasi mikano mpe nsuka ebongwani te. Yango epesaka ntango mosusu elikya ete mabongisi na ngai ebongwani. Na bosolo, ezali mabongisi moko P oyo ekomaka mabongisi A, B, C... engebene na ndenge zabolo azali komitungisa mpo na kobomba yango to mpo na bomoi ya bososoli mpe bokoli ya moto, lisanga to ekolo oyo etali.
Ezali ngai, Nzambe na bino Mokeli, Nkolo ya bantango mpe makambo nyonso. Nazali Nzambe moko oyo asalaka eloko nyonso na ntango na yango engebene na mabongisi ebele oyo natiaka. Mpo na nini botelemi liboso ya mabongisi na ngai ebele? Bana na ngai mosusu balobaka mbala mingi: "Nzambe azali moi; asalaka te oyo alobi. Abongolaka nyonso, ntango nyonso". Na likambo oyo, nazongiseli bino ete ezali ngai Nzambe nde nakela bino yango nayebi bino malamu koleka bino moko. Na makambo mingi, bozali na motema ya boyengebene te. Longola na yango, bomonisaka malamu ndenge bokabaka boyengebene. Na yango, ezali sembo te kobongola mabongisi mpo na kobomba bokatikati na bino, boyengebene te na ngai?
Nazali na mabongisi mingi mpo na moko na moko kati na bino. Soki mabongisi A esali te, nakamata mabongisi B, mpe boye boye. Nasalaka boye mpo bino bomonisi ngai ete bozali na motema ya boyengebene te. Boye, bondima mayele na ngai. Ndakisa ya Lucifer esaleli ngai lokola mateya. Bozali koseka ngai, Nzambe na bino, nzokande na boyengebene te nyonso na bino, nazali ntango nyonso awa mpo na kosalisa bino, mpo nazali Bolingo.
Moto moko te ya bato akoki komilakisa koyeba mabongisi na ngai mpo ezali ya motuya. Bososola mpe ete zabolo azali kotambola zingazinga na bino, basali na ngai, mpo alingi kokweyisa bino na makambo nyonso. Ezali mpo na yango mayele na ngai ya mosala etikali makasi mpo na kokota. Bokozala ntango nyonso na elikya ete mabongisi na ngai ebongwani nzokande ezali boye te kati na kati.
Na lolenge, mabongisi na ngai ebongwani engebene na bino mpe engebene na makambo oyo bomoni bino kati na yango. Napesi bino ndakisa: natindi moko kati na baprofetes na ngai ya basi kotinda nsango ya bokebisi epai ya moko kati na basali na ngai. Mpo na kobanda, profetes yango alobi ye ete nazwi motema ete lolenge amipesaki mpo na kosalela ngai atako mikakatano nyonso oyo akutaki. Kasi tongo kozwa na mosala, na kosala misala oyo natindeli ye, abimi na nzela mosusu mpo na lolendo oyo abimi na ntango. Na yango, profetes atindeli ye nsuka ya nsango na ngai oyo ezali kotinda ye bokebisi mpo asembola miboko mpe azonga nsima ntango azali kaka na ntango.
Liboso ya mpe, azali kotelema liboso ya profetes, akofunda ye na lokuta, na maloba oyo: "Ezali Nzambe te nde atindi yo mpo Nzambe akoki te kosepela na moto mpe na ntango moko apesa ye nsango ya bokebisi". Mosali asalaka boye mpo na boniboni, bato balingaka te ete bato baloba bango bosolo. Longola na yango, bayinaka ntango moto abimi mabe na bango libanda.
Ndakisa oyo ekoki kopesa bino etaleli ya ndenge mabongisi na ngai esalaka? Ngai Nzambe, nakoki kosepela na moto mpe na ntango moko napesa ye bokebisi. Ezali na mabe moko te to bokatikati kati na yango. Bondimi ya ndenge na ngai ya kosala etali motema ya kofungola mpe kimia ya bokoli ya moto oyo etalami. Na mawa, bato nyonso bazali ndenge moko: ntango nsango na ngai esalisi bango, ezali Nzambe nde alobi, kasi soki ezali boye te, ezali Nzambe te.
Na ndakisa ya liboso, nsuka ya mabongisi na ngai ezalaki kokebisa mosali na ngai oyo abimi na nzela ya malamu mpo azonga na nzela mpo azala ntango nyonso na boyokani na ngai, Nzambe na ye Mokeli. Mpo na kokoma, nasengi profetes na ngai asepela ye mpo na oyo asalaki malamu na kosala misala na ngai. Ndenge oyo esengeli kopesa ye nzela ya kofungolama na molimo mpo na kondima pete nsango oyo ekoya.
Mabongisi oyo nabongisi mpo na bana na ngai ebongwani te, kasi ezali, nzokande, bana na ngai nde babongolaka bizaleli na bango mpo na kozanga mpiko, kondima mpe boyengebene na bango. Mpo na ndakisa, nazongisi bino na lisolo ya Sarah oyo nalobi: "Okobota, mwasi!". Mpo na kozanga kondima, Sarah aseki. Na sima, akei kokosa mobali na ye na kopesa ye likanisi ya kosala mwana na Agah.
Na makambo ya boye, bokoki koloba ete nabongoli mabongisi? Te kabisa, mabongisi na ngai ebongwani te mpe ekobongwana te. Ezali nzokande bino nde bokanisi ete mabongisi na ngai ebongwani na ntango nyonso. Kasi kobosana te ete zabolo azali kotambola zingazinga na bino mpe azali kolanda misala na bino nyonso. Na yango, soki nasalela mayele mpe banzela ndenge na ndenge te mpo na kopesa bino, bozali na elikya ya kobima na mokili?
Fungola malamu matoyi na bino ya ebende: "Ntango nalobi eloko, nasalaka yango. Ata soki lisakoli eumeli, ekokokisama na ntango ya malamu". Na esika ya koloba ete mabongisi ya Nzambe ebongwani mpe ekokokisamaka te, bongo kofunda baprofetes na ngai ya basi mpe ya mibali ya lokuta, mikanga na mpiko mpe kondima.
Nakoki kotinda baprofetes na ngai koloba na mwasi moko ete akobala, bongo mbala mosusu, kotinda bango koloba na mwasi yango moko: "Nzambe alobeli yo keba bomoi oyo ozali kosala, soki te ekokoma na libala te". Mpo na ndakisa oyo, bokoloba solo ete baprofetes na ngai balobi eloko mpe oyo ekokani na yango te?
Ezali na biyano ebele oyo nakoki kopesa bino, kasi tosila na oyo mosusu: moko kati na baprofetes na ngai asakoli epai ya libala moko ete akobota mwana moko ya mobali ya kitoko, nokinoki. Bilembo ya kombo ya mwana, mokolo, ngonga mpe esika ya mbotama epesami bango. Na mawa, libala yango ekoti na bokatikati mpe tembe-tembe oyo ezanga nsuka, na sima ya lisakoli oyo. Na sima, mwasi akwei solo na zemi, na mposa ya koswana oyo.
Mpo na makambo ya maboma-taka, kozongisa mabe mpe bantina mosusu oyo ezali ya ye moko, azwi mokano ya koba te mobali na ye, bongo abomi zemi na nkuku. Na makambo ya boye, ezali sembo kofunda Nzambe te kotinda bilaka na ye? Bato ya mokili, talisa bizaleli na bino mbala nkoto liboso ya kokamola ngai. Nazali Nzambe ya libela, bilaka na ngai ekokokisamaka ntango nyonso, na ntango ya malamu.
Mabongisi na ngai ezali mingi mpe ya lolenge na lolenge. Soki na kimia oyo ya bokoli ya bomoto, nasakoli bino mabongisi mosusu oyo elobi ete bible etondi na bilembo mpe mabunga ndenge na ndenge, boye, bino ba-imprudent, bokoloba lisusu ete ezali ngai Nzambe te nde nalobi yango. Bolingaka te koyoka Bosolo. Ezali mpo na ntina oyo bozali koyoka mpasi, etonga ya bakufi-miso, ya bakufi-matoyi. Boyekola kotanga kati na milongo, na esika ya koluka ntango nyonso kozongisa na lolenge ya loposo.
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Les plans de Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Sources Ph. illustration: www.hiclipart.com
