Nzambe kaka nde abongi na elikya

Nani kati na bato akoki koleka nkanda na ye, zuwa na ye, kotomboka na ye, lolendo na ye, kozanga motema molai, koyina... mpo na kotikala sembo na boyokani na basusu? Na bosembo nyonso, bokondima ete ezali te. Moto azali na botondo te, azali na mitamboli ebele, atondi na nkanda pe azali na mposa ya kozongisa mabe... Moto akosi moto, elikya na ye ebongwani kolanda bosenga na ye. Nazali Nzambe se moko, Nazali Sembo pe elikya na Ngai ekweyi te...

Nzambe kaka nde abongi na elikya

Nalobi na bino, na Solo, elikya na kondima etambolaka esika moko, mpo kondima ya solo euti na elikya oyo ekweyi te. Kondima ya solo epesaka bondimi. Ndakisa ya Abraham esengeli kosalisa bino. Koyeba ete Nzambe azali ekeseni na kozala na kondima epai ya Nzambe oyo azali se moko. Na likambo oyo, bato basali matamboli minene, atako bato oyo bazali kokende sima bazali kokoba kogumbamela mabanga, bazamba ya bule, bikeko pe biloko mosusu.

Bato nyonso bayebi ete Nazali, kasi ndenge nini bakoki komona nzela oyo ememaka epai na Ngai, kati na mobulu oyo ezali na mokili. Bana na Ngai bazali kokima bisika ya losambo oyo esengelaki kosalisa bango kozwa kondima na kozala na Ngai. Bazali kobunga nzela pe ntango mosusu bakomituna soki nazali solo. Na ndenge oyo, ndenge nini bokoki kozala na kondima, soki mawa pe ntembe ekoti kati na bino? Basali na Ngai oyo babungi nzela bakoki lisusu te kotambwisa bino na mateya na Ngai ya solo, nzokande ezali pe ezali pene na bino. Yango wana, na ntango oyo ya suka, Nazali kosenga na mwana moko moko na Ngai asala makasi mpo na kozonga na nzela ya lobiko. Bozali na mayele pe makoki ya kososola; boyebi kokabola solo na lokuta. Boye, botelema na etumba ya lobiko na bino.

Nazali Nzambe Mokeli ya Mokili mobimba, Nazali Alpha pe Omega, Nkolo ya ntango pe makambo... Nazali Nzambe ya elikya oyo akosaka ata moke te. Pe ezalaki bongo banda tango ya kala. Bozali na elikya te na Ngai, kasi Ngai, nazali na elikya na bino. Bozali na kondima te na Ngai, kasi Ngai, nandimi ete baoyo kati na bino bakobika, bakobika. Yango wana, nazali kosala nyonso mpo na kobikisa bino.

Nazali Nzambe ya Bolingo oyo asalaka oyo alobi pe apesaka oyo alaki, ata soki ekozwa ntango boni. Nazongisaka mabe na bato oyo balobaka mabe na bino, bakosaka bino pe baoyo nyonso basalaka bino mabe, tango nyonso botie motema na Ngai. Nayebi nyonso na bomoi na bino, na mabongisi na bino, na lobi na bino, kasi nalobaka yango ata moke te na banguna na bino. Atako bokosaka Ngai mbala mingi kati na mibu nkoto, nazali kaka kolakisa bino bolingo na Ngai, mawa na Ngai pe motema molai na Ngai. Napesaka bino ntango nyonso libaku ya sika mpo na kobongola ntango bokweyi. Nabatelaka bino butu pe moyi na bato oyo balingi kosala bino mabe.

Nazali Nzambe ya Sembo, Bosembo na Ngai ebombama te, Bolingo na Ngai ezali monene koleka, Bonene na Ngai ekoki kolobama te, Nguya na Ngai ekoki koyebanisama te; Nazali Yawe ya Mampinga, Nkosi ya libota ya Yuda, Nkolo ya ntango pe makambo; Nazali Nkolo ya bomoi nyonso na likolo, na mokili pe na se ya mabele. Nazali Nzambe se moko.

Nani kati na bato akoki koleka kanda na ye, zuwa na ye, nkanda na ye, lolendo na ye, kozanga motema molai na ye, koyina na ye... mpo atikala ya sembo na boyokani na ye na basusu? Na bosembo nyonso, okomona ete ezali te. Moto azali na motema ya kozongisa matondi te, azali na makanisi oyo ebongwaka-bongwaka, atondi na kanda mpe azali ya kokende noki na kozongisa mabe.

Kati na libota moko, bandeko ya mibali na ya basi bakomiyinela, bakomi na baninga te, bakomi kobunda; baboti bakomi kondima koboma bana na bango mpo na ba intérêt na bango ya lokoso. Ndenge nini tata akoki kotinda mwana na ye ya mwasi oyo azali naino mike abala mobali, na makasi? Nzokande, azalaki na elikya ya peto epai ya tata na ye. Baboti bakomi kobonza bana na bango na satana, mokolo mobimba. Basi bakomi kopesa bana ya kindumba na bango na mibali mosusu lokola bango nde batata ya solo. Mibali bazali kotonga bandako ya nkuku mpo na kokundela baninga na bango ya basi. Baninga bakomi kosala kindumba na basi ya baninga na bango ya motema, bazali koyiba ba projet na bango, bakomi kopesa basekele na bango na bato mosusu, bakomi kosala kotonga mpo na kobebisa bango, etc. Ekolo moko ekomi kobundisa ekolo mosusu oyo bazalaki elongo. Bondimi ezali wapi na makambo wana nyonso?

Kati na bino, ezali na bato ya kanda ya tango molayi oyo batikeli bana na bango makanisi ya kozongisa mabe. Ndenge nini okoyeba que ndeko na yo ya mboka moko, ya engumba moko autaki na libota ya ndenge wana? Ndenge nini okoyeba que maseki na yo ya lobi esalaki mpasi na motema ya moninga na yo oyo abombi yango na makanisi mabe? Wapi botie ngai kati na makambo wana nyonso? Moto akoseka moto, bondimi na ye ebongwaka kolanda ba intérêt na ye. Nazali Nzambe ya se moko, Nazali Sembo mpe bondimi na Ngai ekweaka te.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Dieu seul est digne de confiance", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Source Ph. illustration: www.freepik.com