Boyamboli ya Bato liboso ya Nzambe ya Seko
Esika nyonso nakotala, namonaka kaka likambo moko: bino, bato ya mokili mobimba, bozali koboya solo na Ngai mingi, mpe yango eutaka kala, mibu nkoto ebele. Na tango ya Abalayama, boyamboli Ye na kokanisa ete bozali kosala ye mabe, kasi bozalaki nde kolona mbuma ya mabe mpo na bino moko. Likambo yango ekómaki lisusu na tango ya Moize, mpe na tango ya Yesu-Klisto, Mwana na Ngai, oyo bino bowanganaki... Bino, bato ya lelo, etumbu na bino ekozala na bololo makasi mpenza na lolenge ete bokomituna: "Ezali mpenza Nzambe ya Seko nde azali kosala makambo nyonso oyo?" Bato ya boyamboli, bato ya mabe, bato ya lolendo, bato ya boluki profite, bato ya lokuta! Bobongwana te, liboso ete Kanda na Ngai ya Bulee ekitela bino!

Esika nyonso nakotala, namonaka kaka likambo moko: bino, bato ya mokili mobimba, bokanisaka ete bozali mayele koleka Ngai, Nzambe Mokeli na bino. Ezali te mpo ete nandimi kokosa nde bokomi kokosa bomoto na bino ete bozoba na bino ebombami na miso na Ngai. Ezali bongo mpo ete naponaki ndenge moko kotika bino kosala, ndenge bino bolingi, nazali koloba eloko te. Nzokande, bosengeli koyeba ete Ngai Nzambe na bino, nasalaka malembe, kasi na nzela ya solo. Mpe tango nakanisi kosala, moto moko te akoki kopekisa Ngai.
Bozali koboya solo na Ngai mingi, mpe yango eutaka kala, mibu nkoto ebele. Na tango ya Abalayama, boyamboli Ye na kokanisa ete bozali kosala ye mabe, kasi bozalaki nde kolona mbuma ya mabe mpo na bino moko. Likambo yango ekómaki lisusu na tango ya Moize, mpe na tango ya Yesu-Klisto, Mwana na Ngai, oyo bino bowanganaki. Napesi bino nkombo nyonso oyo mpo na kosalisa bino kozonga na nzela mpo botangaka biblia kasi bososolaka yango te.
Natii lisusu ndakisa oyo elandi, mpo na kobundisa bino makanisi na etali bizaleli ya Bayisraelite. Ya solo, tango bato ya Yisraele bazalaki na bowumbu na Ejipito mpo baboyelaki makambo nyonso oyo nayebisaki bango, natindaki Moize mpo na kokangola bango mpe kobimisa bango na Ejipito. Na suka, likambo nini esalemaki? Mabunga kaka moko ezongaki. Mpo na kobundisa bino makanisi, napesi bino maloba na bango oyo balobaki na Moize: "Obimisaki biso na Ejipito, mpe tala tokomi konyokwama lisusu koleka. Mpo na nini tolandaki yo boye?" Atako bongo, Moize asalaki eteni ya mosala na ye na koyebisa bango nsango nyonso oyo nazalaki kopesa ye.
Ah boyamboli ya bato! Ata sima ya makambo nyonso oyo esalemaki na Ngomba ya Siona, bato ya Yisraele basengelaki kotambola mikolo moke kino na esika oyo nalakisaki, elingi koloba, mokili ya elaka. Nzokande, lokola nayebaki motema ya bato, nayebaki ete Bayisraelite bakotikala ntango nyonso sembo te liboso ya makambo nyonso oyo nakosalela bango. Yango wana, nazwaki mokano ya kolakisa bango nini ezali kanda na Ngai ya Bulee. Ndenge boyebi ngai, namemaka ntango nyonso bilulela na bino, mafinga na bino, mabe na bino, kasi tango ekoki mpo na kosala, nasalaka mbala moko. Yango wana, na esika bakosala mikolo tuku minei na nzela mpo na kokoma na mokili ya elaka, basalaki mibu tuku minei. Napesaki bango etumbu wana mpo baboyaki kotosa mitindo oyo napesaki bango, ya koyeba kotia Mibeko na Ngai Zomi na bomoi na bango ya mokolo na mokolo.
Bino, bana na ngai, soki bolingi koyoka kanda na Ngai ya Bulee, boye bomibongisa te. Bozala bapanzana, botia lokolo moko na misala na Ngai mpe lokolo mosusu na mokili. Mpe lisusu, mpo na kosala Ngai masano, bamosusu bazali kosenga Ngai bikamwa, ndakisa: "Nkolo, soki opesi ngai mosala, nakosalela Yo", "Nkolo, tika ngai natambola, mpe nakozala sembo na Yo bomoi na ngai mobimba", to lisusu "Nkolo pesa ngai ngolu ya kobala, mpe nakozala na botondo epai na Yo bomoi na ngai mobimba", "Nkolo, pesa ngai bozwi mpo nakoka kosala mosala na Yo, lokola kosalisa bana bitike, kotonga tempelo na Yo, etc."
Mbala moko nandimi bosenga na bino oyo boyebisi na losambo, na kopesa bino moke kaka ya oyo bolingi, bokomi mbala moko bato ya lolendo, bilombe, bayamboli, bato ya mabe... Botambolaka ata malembe tango ezali ya kosambela. Ndenge nini nakoki koyoka bino sima na masano na bino nyonso? Botala bino moko bizaleli na bino! Ndenge nini nakoki kolakisa bino bolingo na Ngai, atako nazali Bolingo?
Yango wana Ngai Nzambe, nalobi, kobanda lelo: "Osali mosala na Ngai, mpe na nsima, nakopambola yo", na maloba mosusu, "Osali mpo na Ngai, nasali mpo na yo". Soki bokanisi ete makambo ekobongwana, bokosa bino moko te, bokita na mapata. Moto oyo asali masano na Ngai, Ngai mpe nakosala masano na ye. Moto oyo azali sembo te na Ngai, Ngai mpe nakozala sembo te na ye liboso ya basambisi ya mokili mosusu. Mpamba te na tango wana, ekozala lisusu malamu te mpo na kosambela Ngai.
Tika ete moto nyonso oyo akanisi kokabola Ngai na zabolo - na kozala na lokolo moko na mosala na Ngai mpe lokolo mosusu na ndako ya zabolo - abongisa lolenge ya kotambola, na kotia makolo nyonso mibale na mosala na Ngai. Mpamba te ekoki tango mpo ete Kanda na Ngai ya Bulee esopana na mokili mobimba, ndenge nasalaki na bato ya Yisraele.
Bino, bato ya lelo, etumbu na bino ekozala na bololo makasi mpenza na lolenge ete bokomituna: "Ezali mpenza Nzambe ya Seko nde azali kosala makambo nyonso oyo?" Bato ya boyamboli, bato ya mabe, bato ya lolendo, bato ya boluki profite, bato ya lokuta! Bobongwana te, liboso ete Kanda na Ngai ya Bulee ekitela bino!
Boyeba ete nazali Nzambe ya zuwa. Bakaboli Ngai te na zabolo (lucifer), mpamba te ezali Ngai moko nde nakela ye; azali eloko te liboso na Ngai.
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "L'infidélité des hommes à l'égard de l'Eternel Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.freepik.com