Makama ya Botosi Te na Nzambe
Botosi ezali ya lolenge ya Nzambe. Ezali moboko ya bomoi ya molimo. Ngai moko, Yawe Nzambe, nakobosaka mimibeko na Ngai moko mpe Mibeko na Ngai... Mpo na nini, bino bato, oyo bosalemi na elilingi na Ngai, boboyaka kotosa Ngai Nzambe? Bozali nani mpo na kotelema na lolendo mpe na botosi te?... Botosi te ekokangaka bino na makambo nyonso ya bomoi na bino mpe ekotikisaka bino na makambo nyonso...
Botosi ezali moboko ya bomoi ya molimo. Nazali Mokeli ya mokili mobimba. Nazali moboko ya mimibeko nyonso ya biloko mpe ya Mibeko zomi. Nyonso ezali na se ya bolingi na Ngai na lolenge oyo ekoki komona te, kobanda na mokili ya Nzambe tii na mabele. Bikelamu na Ngai nyonso ekogumbama mpe ekoteleme na mabolongo liboso ya elongi na Ngai, na Likolo, na mabele mpe na se ya mabele, lokola elembo ya komipesa mpe botosi. Ngai moko, Nzambe ya seko, nakobosaka mimibeko na Ngai moko mpe Mibeko na Ngai na kosala, na ntango na yango, nyonso oyo nalobi na bino mpe nalaki, na makambo mike nyonso. Na likambo wana, mpo na nini bino bato, oyo bosalemi na elilingi na Ngai, boboyaka kotosa Ngai Nzambe? Bozali nani mpo na kotelema na lolendo mpe na botosi te?
Boyeba ete botosi te nyonso ezali na mbano na yango. Bososoli te ete bozali konyokwama mpo na mbano ya botosi te na bino na malako na Ngai? Ezalaki polele mpe ya makasi: "Yawe Nzambe apesaki mobeko oyo na moto: Okokoki kolia mbuma ya banzete nyonso ya elanga; kasi okoliaka te mbuma ya nzete ya boyebi ya malamu mpe ya mabe, mpo ete mokolo oyo okolia yango, okokufa." Leo, bokufi mpo ete botosaki Ngai te.
Botosi te ekopusaka bino mosika na Nzambe na bino Mokeli mpe ekobimisa moto ya kala, molili, na kati na bino. Misala na bino ewutaka na bososoli mabe mpe kosalela mabe ya bolingi ya kopona oyo natiali na bino. Elingi yango ya kokangolama ekotindikaka bino ete bozali na mokumba te ya kotosa mpe kotambola kolanda malako oyo napesaka bino. Boyeba ete botosi te nyonso ekotindaka bino na kufa ya molimo mpo ete ekopusaka bino mosika na bopesi nyonso oyo bozali na yango elongo na Ngai, Nzambe na bino Mokeli, elingi koloba boyokani, bondeko ya solo, boninga, makabo, kopusana... Na yango, botosi te ekopusaka bino pene ya molili na makambo na yango nyonso ya kopengwa na bomabe, kolangwa, kindumba, bomoi ya mabe, kofinga na lokuta, zuwa, mabe, mpe makambo mosusu.
Nakundolaka bino ete Pole mpe molili ekoki kovanda esika moko te. Yango wana soki Pole ekei mosika, molili ekoyaka na esika na yango mbala moko, mpo ete makambo wana nyonso ezali na kati na bino. Na ndenge mosusu, soki botosaka Nzambe, bozali pene ya Pole yango molili ekokita nye.
Lelo, mpo na mbano ya botosi te na bino ebele, bozali lisusu na ndingisa te ya bomoi ya seko lokola nalakelaki bino: bokomi mikolo mpe bokufi na nzoto na mabele. Mingi na bino bakufi na molimo mpe basukaki na moto ya kolia ya lifelo.
Soki bolingi kozala na bomoi ya seko ya esengo, boluka bomoi ya molimo oyo esalemi na botosi na Nzambe. Bandaka na kosalola nyonso oyo bobebisaki na bino banda kala. Bopesaka ntina na kolemba kombo na bino mpe komipesa. Boyekola lisusu kotosa Nzambe: botosaka Mimibeko na Ngai ya bule mpe Mibeko zomi na kosalela yango na bomoi na bino ya mokolo nyonso, banda mbotama na bino tii na kufa.
Eloko moko te kati na nyonso oyo nasenga bino kosala ezali mpo na mabe na bino. Bobosana te ete botosi te ekopusaka bino mosika na ebombamelo ya Nzambe. Na mokili oyo etondi na ba-demo, ezali na litomba mpo na bino kotikala na se ya ebombamelo ya kobatela ya Yawe Nzambe mpo ete "Ye oyo avandaka na se ya ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Nyonso, akopema na ata ya Nkolo-Nyonso." Boye, akoki kosunga bino soki likama nyonso ekomi, mpo ete azali Mobeko mpe akotiolaka Mimibeko na Ye te.
Botosi te ekopusaka bino mosika na mabongisi na Ngai. Yango wana, bokokende libanda ya nzela soki bozali na boyokani te na mabongisi na Ngai. Bozala ntango nyonso na lombangu ya kotosa malako nyonso oyo napesaka bino na nzela ya basali na Ngai oyo natia na likolo na bino, mpo ete bokonzi nyonso ewutaka na Ngai Nzambe.
Boyeba ete botosi mpe komipesa ezali elongo mpo ete tango boyekoli te kotosa bokokoki komipesa te. Maseki ya likambo, boboyaka kotosa, kasi bosenga ete bamipesa na bino. Nalobi na bino na solo, moto nyonso akobuka ntango nyonso oyo alonak. Bozali nani mpo na kosenga komipesa mpe botosi ntango bino moko bozali bizalelo te?
Bozali kofuta, na makambo nyonso, ntalo ya botosi te na bino na Ngai Nzambe. Mosali moko te akoki kolonga mosala na Ngai soki atosaka Ngai te. Botala oyo ekomaki na basali na Ngai nyonso oyo batosaki Ngai te, elingi koloba Saül, Moyize, Jonas, Jean-Baptiste... Mpo na botosi te na ye, natikalaki Moyize te amona mabele oyo nalakelaki, nzokande asengelaki kokoma kuna. Jean-Baptiste akatamaki kingo mpo ete akataki kingo ya ba-profeta ya lokuta ya Baal, lokola Eli. Nasololaki mokonzi Saül na David mpo ete atosaki Ngai te, mpe makambo mosusu.
Botosi te ekotindaka bino na lolendo nzokande boyebi malamu ete "Naboyaka ba-lolendo kasi nasalaka ngolu na ba-mikolo." Botosi te ekokangaka bino na makambo nyonso ya bomoi na bino mpe ekotikisaka bino na makambo nyonso.
Boyeba mpe ete ndenge mosali ya Nzambe azali kokola na molimo, ndenge azali komata, ndenge wana asengeli kozala na lombangu ya kotosa Ngai, mpo ete na botosi te moke, etumbu ekosalema makasi mpo ete Nazali Mobeko. Boyekola kotosa na ntango nyonso mpe na makambo nyonso na kogumbamela Yawe Nzambe, mpe mpo na nkembo ya mosala na bino mpe bozali na bino na mabele.
[1] Genèse 2:16-17, [2] 2 Corinthiens 6:14, [3] Psaume 91 :1, [4] 1 Pierre 2:13, [5] 1 Pierre 5:5
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Les dangers de la désobéissance à Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Sources Ph. illustration: www.pixabay.com
