Nguya ya losambo
Losambo ezali nzela ya kimia, oyo ekoki kobundisama te mpe ekoki kokotama te ya kosolola mpe ya kozala pene kati na Ngai Nzambe mpe bana na Ngai. Mpo na yango, losambo ezali ya kokangama na bomoi ya moto. Yango wana, ezali ya lingomba moko te, ya lolenge moko ya mystique te, ya momeseno moko te, ya libota moko te, ya etuka moko te, mpe misusu. Soki ozali na kotosa Nzambe te, losambo na yo moko te ekoki komata epai na Ngai Nzambe. Ezali mpasi mingi mpo bato bamona Nzambe, kasi moto nyonso azali na nzela ya kosolola na Nzambe na nguya ya losambo...
Bato bazali na molimo na bomoi na bango mpo bamemi na kati na bango biteni ya mwinda na Ngai ya nzambe ; yango wana babengi yango molimo ya moto. Molimo ya Nzambe abengi Molimo-Mosantu. Bokokoka kososola moke-moke mpo na nini nalobi ete bato bakela na elilingi na Ngai mpe na lolenge na Ngai. Soki ezali bongo, wana ezali na nzela, nzela-mayi to lolenge oyo ekoki kobebisama te ya kosolola, ya kosangana mpe ya kozala pene kati na milimo ya bato mpe Nzambe : yango ezali losambo.
Bato nyonso ya mabele, kozanga mbongwana moko te, bakoki kokota na kosolola na Ngai Nzambe kozanga molobeli to mayele ya lokuta. Mpo na yango, basengeli komitya na ndenge ya kokanisa makasi mpe ya kofungola molimo oyo ebongi. Eloko ya liboso mpo na kolonga na mosala oyo ezali kotosa kozanga mibeko Mobeko ya Liboso « Ngai nazali Nzambe-Oyo-Azalaka ya yo ; okozala na banzambe mosusu liboso na Ngai te ».
Moto nyonso akoki kozwa nsango na Ngai Nzambe, na bandakisa ndenge na ndenge, engebene na bomoi na ye, likanisi na ye, makabo na ye mpe mosala na ye. Na likambo oyo, moto moko te asengeli kolula mosusu to kolinga kozala lokola ye. Basusu bazwaka Ngai na ndoto to na makanisi ya molimo. Basusu bayokaka Mongongo na Ngai mbala moko to na nzela ya ba-anjelu. Ntango mosusu, Ngai nalekaka na balingami na bino to bato boyebi te mpo na kopesa bino nsango na eyano ya mabondeli na bino.
Nalobi yango na nsango na Ngai « Ndenge nini ya kosambela Nzambe-Oyo-Azalaka mpo na kosilisa mikakatano na bino ? » mpe nazongeli koloba : « losambo ezali mosala ya molimo ya komata, ya kosala bondeko na Ngai Nzambe. Esengaka boyengebene monene mpe kofungola motema. Losambo ezali Mobeko ya Nzambe oyo esengaka boyengebene, bolamu, kondima mpe kotosa Nzambe ». Soki kotosa Nzambe ezali te, losambo na bino moko te ekoki komata epai na Ngai Nzambe. Soki te, ndenge nini ekoki kozala ete bosambela Nzambe na kopanzana-panzana, makelele mpe kokanisa te malamu ? Ndenge nini bondimaka kosambela Nzambe ntango bozali kokangama na bakisi na bino, bikeko na bino mpe misala nyonso ya mabe ya molili ? Boyeba ete Ngai nazali Nzambe ya zuwa oyo andimaka mayele ya lokuta te na kogumbamela Ngai.
Nalobi na bino, na Bosolo, boyebi ata moke te nguya oyo losambo epesaka bino. Ezali mpasi mingi mpo bato bamona Nzambe, kasi moto nyonso azali na nzela ya kosolola na Nzambe na nguya ya losambo. Mosika kati na bino, bato, mpe Kiti ya Bokonzi ya Nzambe ezali monene mingi oyo ekoki komekama te, kasi mabondeli na bino ya boyengebene ekokaka na pɛtɛɛ na bimatelo ya Kiti na Ngai ya Bosantu. Na likambo oyo, basi bazali na nguya oyo ekoki kotángama te. Ntango mwasi azali na pasi, mabondeli na ye ekokaka epai na Ngai nokinoki mingi, mpe Ngai nayokaka yango. Ntango mosusu, bayokaka mawa ya mabondeli na bango moko ntango bazali kotya makanisi na bango malamu te liboso ya kobaluka epai na Ngai.
Napesi bino bandakisa mwa moke mpo na kosalisa bino bososola malamu : (i) mwasi moko akufaka ntango azali kobota, nsima ya zemi ya mpasi mingi, etonda na bokono mpe kolɛmba na bolingo mpe na bomoi. Mbala moko liboso ya kokufa, mwasi oyo asalaka losambo ya kozwa zemi lisusu te. Mbala moko, Ngai nayokaka losambo na ye. Na bomoi na ye ya sika na mabele, mwasi oyo akoki kobota te. Azali ya gbombo mpo na losambo na ye ya bomoi mosusu. (ii) Mama moko alobaka maloba ya kolakela mwana na ye oyo azali na limemia te mabe, oyo azali kopesa ye pasi ya ndenge na ndenge. Na mawa, mabondeli na ye ekozala na bopusi epai ya mwana oyo, akozwa nzela na ye malamu te na bomoi na ye. (iii) Mibali mosusu bazalaka kosakana na mitema ya basi. Yango ezali libunga monene mpenza mpo mwasi oyo alingaka na boyengebene azalaka mobimba mpe ntango mosusu ya solo mpenza na bolingo na ye. Kolɛmba na bolingo ya mwasi ya ndenge wana ekoki kozala na bopusi na bomoi mobimba ya ye oyo asalaki bosembo te to mabe monene. Basi oyo, mingimingi bazalaka kimia, bazali na makoki ya mabondeli ya nguya oyo Ngai nayokaka.
Mwasi ya losambo azali na nguya oyo ekoki kolobama te oyo ezali na kati ya mabondeli na ye. Mwasi ya ndenge wana azali na makoki ya kokoka makambu oyo ekoki kokanisama te mpo azali na nguya ya kozala nokinoki na boyokani na Ngai. Ngai nayokaka mingi lolenge ya basi oyo mpo bazali na mosala ya kokomisa mabele ya molimo mpe kobikisa bato oyo bazali na pasi.
Yango wana Ngai napesi mibali toli ya kosakana na basi te. Bozwa bango na mpiko ata soki bango moko bazali kosengi bino makambu mosusu na bizaleli na bango, bilamba na bango mpe mimeseno mosusu nyonso ya mabe. Boboya boyokani ya basi oyo bakoki kotinda bino na lisumu. Bolinga basi ya Nzambe oyo bakosalisa bino kotonga libota ya molimo oyo ekosepelisa Nzambe.
Ngai Nzambe oyo nakela mwasi, Ngai natyaka ye lokumu mpo nayebi oyo natyi na kati na ye. Amemi na kati na ye bizaleli nyonso ya malamu ya bato oyo bokoki kokanisa. Soki nalalisaki mobali mpo na kokela mwasi, ezali mpo na basekele minene oyo natyi na kati na ye. Yango wana mwasi akoki kotia nokinoki boyokani na Ngai Nzambe. Mwasi azali na sekele ya kozwa zemi ya moto : kaka mwasi nde amemaka mpe apesaka bomoi. Mpo na motuya nyonso oyo ya molimo, Ngai natalaka mwasi lokola liseki ya miso na Ngai. Yango wana, soki Ngai Nzambe natyaka mwasi lokumu, nani akoki komeka kokitisa ye lokumu ? Bino mibali, bosala ete mbeba ewuta na bino te.
Nakanisi lisusu mbala moko, nguya ya mabondeli na bino ezali monene mpe ekoki kokanisama te, mingimingi ntango ezali ya kondima. Yango wana Mwana na Ngai Yesu alobaki : « soki bozalaki na kondima lokola mbuma moko ya moutarde, bolobaki na ngomba oyo : Longwa awa kende kuna, mpe elingaki kokende ; eloko moko te elingaki kozala mpasi epai na bino. »[1]. Na mabondeli na bino, bokómaka ntango mosusu kosangisa Mampinga na Ngai ya Likolo mpo na bitumba oyo esengaka kosalela Molimo-Mosantu. Losambo moko ya pɛtɛɛ ya ndenge « Nzambe-Oyo-Azalaka ya Nguya Nyonso, Ngai napesi Yo butu na ngai, kobatela ngai », Ngai etindaka, na ntango mosusu, kotinda ba-anjelu babateli zingazinga ya ndako na bino to ndako mobimba oyo bofandi. Na ndenge wana bino bosalisaka kobatela balingami na bino mpe bato ya pembeni na bino na mabondeli na bino.
Mosali ya Nzambe to mwana mosusu ya Nzambe oyo asalaka mosala na Ngai azali na lobateli bisika nyonso mpe ntango nyonso. Mabondeli na ye ya kondima eyokamaka mingimingi. Ntango azali kokende, akoki kaka koloba « Nkolo, Ngai napesi Yo nzela na ngai » mpo banzambe ya mwinda batonga bamir ya makasi ya kobatela na nzela na ye mobimba. Ntango mosusu Ngai natindaka bampunda ya mwinda kobenda motuka oyo elingaki kotika ye na nzela na kobeba. Soki kaka bokoki komona makambu nyonso oyo ! Ngai napesaka bino yango na esengo na koyoka mabondeli na bino ya pɛtɛɛ.
Mosali ya Nzambe oyo asalaka losambo ya kobebisa bakisi, milimo mabe ya engumba to esika mosusu nyonso, azali kobenga banzambe ya nguya ya mwinda mpo na kotumba bosoto oyo ya molimo. Mwana ya Nzambe oyo akutani na bandoki, azali kobenga Mɔtɔ ya Molimo-Mosantu mpo na kobatela ye. Nasengeli kondimisa bino nguya ya losambo ya Moyize oyo epesaki nzela ya kotia nzela na kati ya Mbu ya Motane ? Ezali te na losambo nde Davidi alongaki Goliate ? Anne amonisaki kondima mpe molende ntango azalaki kopesa Ngai mabondeli na ye. Na nsuka, Ngai nayokaki ye, mpe abotaki nsima ya mbula mingi ya kozela. Nguya ya mabondeli ya mosakoli Eliya esalaki ete mɔtɔ ya Nzambe-Oyo-Azalaka ekita[2]…
Ndakisa ya kosekwa ya Yona ezali kotatola ngambo mosusu ya losambo. Ye akufaki na libumu ya mbisi oyo emeli ye mpo na kotosa te mosala oyo napesaki ye. MAta na ndenge na ye ya kokufa, Yona andimaki mbeba na ye, mpe asalaki losambo epai na Ngai na molimo mikolo mingi. Ngai nayokaki ye na mawa na Ngai mpo na boyengebene ya mabondeli na ye. Mpo na yango, Ngai napesaki mbisi mitindo ya kosanza ye, mpe azongaki na bomoi[3]. Ndakisa oyo ezali kolakisa ete moto oyo akufi akoki solo kopesa Ngai losambo oyo Ngai nakoyoka, mpo mokufi ya mabele azali moto ya bomoi na mokili mosusu. Sikoyo, bososoli ete bisekwi nyonso oyo Mwana na Ngai Yesu asalaki ezalaki kokoka na koyoka mabondeli ya bakufi mpe ya bandeko na bango ya pembeni, na kondima.
Ezali ndenge moko ntango bolali. Na pongi na bino, mbala mosusu botindelaka Ngai mabondeli oyo nayanolaka. Boye, moto oyo baloki na bandoki na ndoto, akoki kotindela Ngai mabondeli mpo na kozwa lisalisi ya Molimo Mosantu. Na nsuka, akufi to azali na bomoi, na ndoto to alamuki, bokoki kotindela Ngai mabondeli oyo nakanisaka mpo libondeli ezali kaka na mabele te. Ezali na Bokeli mobimba.
Libondeli ezali ebombo ya makasi oyo natiaka na maboko ya bana na Ngai nyonso na mabele, ndenge moko na likolo. Epesaka bino nzela ya kozwa, na mibeko, nyonso oyo bolingi na Ngai Nzambe. Bozali koyeba yango wana satana ná ekipi na ye bapekisaka bino kobondela malamu: batyelaka bino kilo na nzela ya masumu ya goigoi. Batongaka bisika ya losambo oyo epesaka bino mosika na Ngai Nzambe, na nzela ya mikano mpe misala ya satana. Babebisaka makomi na Ngai nyonso ya mosantu mpo na kopesa bino mosika na Bosolo na Ngai ya solo. Bapesaka bino biloko ya posa na litomba pete, mpe mosusu. Boyeba ete molili ebangaka bato nyonso oyo basambelelaka na motema moko mpe makasi. Babangaka kutu kopusana na ebembe na bango soki bakufi.
Na nzela ya libondeli, napesaka bino nzela ya kosolola na Ngai mpo na kotindela Ngai matata na bino mbala moko. Likambo monene ezali kozanga mpiko na bino mpe lofundu na bino. Mpo bino bato, bozalaka na momeseno ya kosenga makambo na Ngai Nzambe, na esika ya kosenga na komikitisa, na kondima, na sima kozela na mpiko. Bozalaka ntango nyonso na momeseno ya kolingi ete mabondeli na bino eyanolamaka ndenge bolingi. Bozali nani mpo na kopesa Ngai mitindo? Bobosani ete Ngai nde nakeli biloko nyonso? Ngai nde Nazali, Alpha ná Omega, Mokonzi ya seko ya Mampinga, Nkosi ya libota ya Yuda. Ngai nde Nkolo ya ntango ná makambo. Ngai nde Nkombo oyo eleki bakombo nyonso, mpe liboso ya Nkombo na Ngai mabolongo nyonso efukamaka na likolo, na mabele ná na nse ya mabele. Namonaka nyonso mpe nayebaka nyonso yambo makambo ekoma.
Nayanolaka mabondeli na bino kolanda basinga na bino ya karma ná mibeko na Ngai ya mosantu ya bibende mpo Ngai nazali Nzambe ya bosembo. Namibongisaka kosala oyo ezali malamu mpo na bino, na ntango ya malamu. Yango wana, koyanolamaka te to koyanolamaka ''na ntango molayi'' ya libondeli esengeli ntango nyonso kozala malamu. Ndakisa: bozali kosenga kozala na mwana na libala ntango Ngai namonaka ete bokokabwana noki. Ekozala na bwanya te kozela kozala na libala ya malamu mpo na kozala na esengo mpe kozala na bana ya esengo? Bozali konyokwama na bobola, na libota ya bandoki ya koyina. Mokolo na mokolo, bozali kobondela Ngai mpo na kozala na mosala. Ekozala na bwanya te kobimisa bino liboso na libota oyo liboso ya kopesa bino mosala? Bozali komona te ete kozala na mosala na kati ya bambwa oyo balati bilamba ya mpate ekokomisaka bino mikakatano mingi, mpe kutu liwa? Nasalaka makambo nyonso malamu, na ntango na yango.
Mbala mosusu, koyanolamaka ya mabondeli mosusu esengaka kobongisa na bino. Soki bosengi kozala mokambi ya kompanyi, wana nabongisaka bino mpo na kolendisa makoki ná mayele oyo esengeli, liboso ya koyanolamela libondeli na bino. Bosengi kokende koyekola to kofanda na mboka mosusu. Soki yango ezali malamu mpo na bino, wana nabongisaka bino mpo na kokutana na makambo ya solo ya mboka mosusu. Nabongisaka mpe ba condition ya kofanda na bino. Na likambo mosusu, natiaka nyonso na mosala mpo napesa bino nzela ya kotikala na esika, mpo na bokoli na bino. Soki botomboki, natikaka bino kokende koyekola mayele na bino ya bololo. Kobebisama mbala mosusu ezali molápi malamu.
Bozali konyokwama na bokono oyo bakoki kobikisa te oyo ezali na mabondeli na bino. Yango esengaka ngai ntango ya kotinda mosaleli ya Nzambe epai na bino mpo na kobikisa bino na nzela ya kotya maboko to mikakatano mosusu. Mbala mosusu boboyaka bato oyo ya Nzambe na tina ete bazali na losambo moko te na bino. Ntango natambwisaka bino epai ya monganga oyo azali na makabo ya kobikisa, bomonaka ete bonganga ezali ntalo mingi. Bolingi nini mpenza? Bino bato, bozalaka ntango nyonso na kosenga ete Ngai Nzambe nafukama liboso ya mikakatano na bino, ntango baposa na bino etonda na maposa oyo ekoki kosilama te. Yango nde ntina bozali konyokwama na mabele. Ntango ezali kozela bino te. Nsuka ya bantango ezali na baporte na bino.
Napesaka bino toli oyo mosusu: bomipanzana te na libondeli na kolingi kosenga nyonso mbala moko. Bosala ndenge Yesu ayebisaki bino: "Na kosambela, bobabalisa maloba ya mpamba te, ndenge bapagano, oyo bakanisaka ete na nguya ya maloba bakoyanolama. Bozala lokola bango te; mpo Tata na bino ayebi oyo bosengeli yambo ete bosenga Ye."[4]
Libondeli epesaka bino nguya oyo boyebi te oyo napesaka bino. Bosambela Ngai, kondima na molimo mpe bokozala na esengo na mokili oyo etonda na mobulu, oyo etonda na basende.
[1] Matthieu 17:20, [2] 1 Rois 18:38, [3] Jonas 2:1-10, [4] Matthieu 6:7-8
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Le pouvoir de la prière", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
