Nzambe alingaka te bato ya lolendo
Ngai, Nzambe Yawe, nalingaka te bato ya lolendo mpamba te nakelaki bino na komikitisa na elilingi ya bwanya ya Nzambe. Nalobi na bino, na Solo, bonene ya solo ya moto ezali na komikitisa. Koleka ozali monene, koleka oyebi komikitisa, pe koleka oluki bomoi ya kimia oyo etongaka. Bato minene ya molimo bayebi komikitisa mpo na kotambola na bomoi ya bosantu mosika ya miso ya bato oyo bazangi ntina pe batonda na koyina...

Ngai, Nzambe Yawe, nalingaka te bato ya lolendo mpamba te nakelaki bino na komikitisa na elilingi ya bwanya ya Nzambe. Nalobi na bino, na Solo, bonene ya solo ya moto ezali na komikitisa. Koleka ozali monene, koleka oyebi komikitisa, pe koleka oluki bomoi ya kimia oyo etongaka. Bato minene ya molimo bayebi komikitisa mpo na kotambola na bomoi ya bosantu mosika ya miso ya bato oyo bazangi ntina pe batonda na koyina.
Ngai nazali Nzambe Yawe, nazali Nkosi ya libota ya Yuda, kasi mbala mosusu nazali lokola Mpate mpo na kopusana penepene na bino, bana na ngai. Namikitisaka mingi kino bokanisaka ete nazali zoba. Yango ezali te ndakisa ya komikitisa ya Nzambe? Mwana na ngai Yesu azalaki kati na bino, na bomoi ya pete, na komikitisa monene, mosika ya bato ya lolendo pe "balakisi ya mibeko". Na ndenge moko, Molimo Mosantu azalaki na bomoi ya pete pe komikitisa monene, na lolenge ete abendaki kanda ya bato ya lolendo oyo bazingelaki ye, baoyo bakanisaki ete asengelaki kolakisa nguya na ye ya bonzambe mpo na kokonza mokili ndenge balingaki.
Nakelaki bino na komikitisa mpo ete bobotamaki na mabele mpo na koyekola Mibeko na Ngai ya Bosantu, Mibeko na Ngai Zomi pe Mokano na Ngai mpo na kozonga na bomoi ya seko na Paradiso. Soki bozali na lolendo, ekoki kosalema ndenge nini bondima mateya ya molakisi oyo natindi? Bokoki koyekola ndenge nini soki lolendo epusi bino na kokanisa ete boyebi koleka molakisi? Nakelaki bino na komikitisa mpo ete bokoka ntango nyonso koyeba bandelo na bino ya bomoto oyo ekangami na tango pe esika, pe bomoke na bino liboso na ngai. Bozali nini liboso ya anjelu, eloko ya pole, archange pe bikelamu nyonso wana ya bonzambe oyo boyebi te? Wapi esika botie mokili na bino oyo etonda na milimo mabe na ntaka ya mikili nyonso ya likolo, ya kongenga, epai bato ya peto bazali kofanda, baoyo bayebi masumu te? Boyebi ete ezali na mikili ya likolo epai balabala ezali ya wolo?
Banda mokili ekweya na masumu, bato baleisaki lolendo mingi mpenza na lolenge ete milimo mabe ya lolendo bakomi minene koleka ndenge tokanisaki. Na molimo, milimo mabe yango bakomi mbindo pe minene koleka; baleki ata mammouth pe dinosaure ya kala. Tango bakanga moto, batikaka ye te na pete. Yango wana, ezali mpasi mpo na moto ya lolendo azonga na nzela malamu. Mpo na kobima pe kozonga na bomoi ya komikitisa, asengeli kozala na boyebi, mokano makasi pe lisungi ya Molimo Mosantu. Boye, bobelela na nguya pe makasi Moto ya Molimo Mosantu mpo na kokangolama na bino.
Ezalaki te lolendo nde esalaki ete "balakisi ya mibeko" bakanisa ete bazalaki na eloko te ya koyekola epai ya Mwana na ngai Yesu? Na Bolingo, napesaki epai ya "balakisi ya mibeko" yango libaku ya kozonga na mokili, napesaki bango libaku ya suka ya kosikola karma na bango, na suka ya tango. Na mawa, bazali kati na bino kaka na mabunga na bango ya koyeba nyonso pe kososola nyonso. Batondisi bisika ya losambo pe bamibenga "bakolo", elingi koloba bato oyo bayebi nyonso. "Bakolo" yango batambolisami na mongongo ya milimo mabe na bango ya misala ya mabe pe ya nkisi. Bazwaka mingongo wana lokola mingongo ya ba-anje babateli na bango. Mingi ya bato ya lolendo yango bakanisaka na libunga ete bazali kosolola na Ngai Nzambe. Nayebi bango te.
Nazwaka etonga mobimba ya bato ya lolendo wana lokola ngenge na mosala na ngai. Yango wana, nazwaki mokano ya kotelemela na molenge ya sika ya basali na Nzambe mpo na kosalela ngai. Bazali mingimingi bana mike, bamikitisa pe basololaka mbala moko na anjelu mobateli na bango to na ngai moko.
Na mokili, moto na moto azali na makanisi na ye. Bamosusu balobaka ete bazali na fungola ya likolo oyo ngai napesaki bango. Na makanisi na bango, moto moko te akoki koya na Ngai Nzambe pe kozela kozonga na Paradiso soki azwi te libatisi na maboko na bango. Lolendo pe maseki ya bato ekomi mosika mpenza na lolenge ete moto na moto azwi Nzambe lokola ya ye. Nzambe nini oyo? Makanisi yango ezali kaka mpo na bakufi miso oyo bandimaka yango.
Mangomba to bibongiseli nini ya lelo ezalaki na ntango ya Yesu-Klisto? Lingomba nini ebatisaki Yoane Mobatisi? Lingomba nini ebatisaki Yesu-Klisto? Yoane Mobatisi azalaki ya synagogue nini tango azalaki kobatisa Mwana na ngai Yesu? Nani abatisaki Abraham, Mose, Mohammed pe basakoli na ngai nyonso ya ntango wana? Nasalaki yango mbala moko na maboko ya moto te. Bomoni te ete libatisi eyaka na Ngai Nzambe?
Ezali Ngai Nzambe nde napesaka Nguya oyo epesami na tango ya libatisi. Ezali Ngai nde nabatisaki Yoane Mobatisi mbala moko. Yesu azwaki libatisi na ye mpo na kolakisa bato ndenge nini esengeli kosalema mpo na kotosa Mibeko na Ngai ya Bosantu. Boye, ebandaki mosala ya mateya ya Yesu na mokili. Yesu ayaki mpo na koteya bino Solo ya Nzambe. Yango wana, amikitisaki na eteni ya liboso ya libatisi oyo esengeli kokomisa ebandeli ya mosala ya mosali nyonso ya Nzambe na mokili, pe ya bomoi nyonso ya bosantu ya bana na Nzambe. Mpo na yango, esengeli mpenza na mosali ya Nzambe oyo akoki kopesa Nguya na ngai na libaku ya libatisi oyo esalemi na makambo ndenge moko lokola libatisi ya Yesu-Klisto.
Liboso ya libatisi na bino, bosambela ngai na motema ya solo pe boyika mpiko mpo ete nalakisa bino na bilembo to na ndoto soki esika ya losambo pe mosali bazali malamu mpo na mosala yango. Soki te, bokoki kozwa boloki na esika ya kozwa Nguya na Ngai ya Bobateli. Bosala keba, mpamba te libatisi mingi ya lelo ezali mateya ya misala ya mabe. Satana akoti na mokili. Azali kosala makasi na ye nyonso.
Lolendo ezali moko ya mitambo minene ya satana oyo ebombi bato na boloko na ye ya nkuku. Bato ya lolendo bamitondi na biloko ya kongenga, ya bakombo ya lokuta. Balati biloko ya wolo pe biloko ya kitoko awa pe kuna, oyo epesaka bango makanisi ya kozala likolo na molimo oyo elalisaka bango. Bazali na kati ya mpepo na bango, mosika ya makambo ya mokolo na mokolo. Na mokili, bakanisi ete bakoti na Paradiso, nzokande bazingelami na mabanga ya molili ya bato ya pite, ya babomi, ya nkisi, ya kindoki, ya mimeseno pe ya misala ya nkuku ya ndenge na ndenge. Wuta na likolo, bato wana nyonso bamonanaka balatami na bilamba ya moindo oyo ekokani na bomoi na bango ya molili.
Satana alongaka na mayele pe malamu kosala bakangami basali minene ya Nzambe na motambo ya lolendo. Na mokili, satana pe basali na ye balandaka mikolo nyonso basali ya solo ya Nzambe. Bayebi mabunga pe malamu na bango nyonso. Bazali zingazinga na bango, kozela libaku ya kozanga bokebi to ya kokweya. Na mawa, basali minene ya Nzambe bakweyaka na mitambo na bango.
Satana ayebi ete napesaka nguya na basali na ngai moke moke, kolanda mosala na bango pe bokoli na bango na molimo. Boye, basali na ngai bazwaka makabo ndenge na ndenge ya bimoniseli, ya komona, ya kobikisa, ya kosekwisa bakufi, ya bikamwa ya solo, pe bongo na bongo. Nalobaka na bamosusu kati na bango oyo bayokaka ngai na mongongo. Na ntango wana, satana atindaka basali na ye mingi oyo bakoti na nkuku mpo na kopesa bango lokumu ya kindoki. Bafukamaka, balalaka na mabele ntango bakomi penepene, kotondisa bango na maloba minene ya kitoko ya kokosa. Na tango yango kaka, basalaka maloba mabe ya nkisi mpo na koloka bango pe kobakisa lolendo na bango, na kolongola bango na momeseno ya losambo ya mokolo na mokolo. Tala ndenge satana alongaka kosala bakweya basali na ngai ya nguya oyo bamipesa na lolendo mpo na kosilisa na kondima ete bango moko bazali nzambe.
Soki kaka mosali ya Nzambe akweyi pe amizindisi mpenza na libebi, nazali kosengama kolongola ye makabo na ngai mpo na kopekisa ye kosala mabe na bana na ngai. Boye alongolami pe akangami na lokumu na ye oyo akokoka lisusu kokokisa te, mosali oyo akweyi abaluki epai ya satana oyo aloki ye ndenge alingi pe na mawa mpo na kobebisa bana na ngai na bisika ya losambo. Na ndenge ya lisanga, nalingaka kozongisa basali wana oyo bakweyi, mpamba te ata babungi, bazali mandoki ya nguya ya kobebisa mpo na satana.
Satana azali na nguya te, mpamba te ezali na Nguya moko kaka ya bomoi oyo ewutaka na Ngai, Nzambe Mokeli na bino. Nyonso oyo satana apesaka bino lokola nguya ezali kaka ebele ya milimo mabe oyo bazali kosala mikano na bino ya mabe, kopesa bino makanisi ya lokuta ya bosali. Lelo, basakoli ya lokuta bamitondi na masanzoli mpo na makoki na bango ya kosangisa ebele ya bato. Boyebi te ete koleka ndambo ya bato ya mokili oyo bakweisami mpo na lifelo? Ezali mpasi kososola ete bango wana bazali na pete kolandana na satana mpo na kosepelisa basakoli na ye ya basumuki? Ndenge nini mwasi ya lokumu akoki kondima kolongola bilamba na ye na miso ya bato na losambo? Bomoni te elembo ya satana? Koloba ete bakonzi na bino bandimaka nyonso wana; na ntina nini? Na molende oyo, bokosilisa kotambola bolumbu na babalabala na nkombo ya bonsomi ya kosala pe koloba.
Boyeba ete nyonso oyo satana azwi elimwaka soki kaka milimo mabe elimwi. Yango wana, bozali kosengama kozongela tango nyonso boyokani na bino ya makila mpo na kozwa milimo mabe ya sika oyo bazali na tango moke ya kosala. Suka ezali kobebisa bino moke moke. Na ebandeli, satana asengi bino koboma moto moko ya libota na bino, na nsima mibale, misato, minei pe na suka nyonso oyo bokoki kokoma. Satana azali na moninga te; ye moko amilingaka te. Na suka, abomaka bino moko, etonga ya bazanga kondima, ya bawumbu ya mpamba pe ya lolendo !
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Dieu n'aime pas les orgueilleux", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.freepik.com