Mobeko ya bomoto ya lifuti

Mobeko ya lifuti elandaka logique ya « kopesa mpe kozwa » to « kozwa mpe kopesa », elingi koloba kozala na botɔndi mpo na bolamu, mpo na oyo tozwi na bolamu, mpe na nsima, komitya na disposition ya koloba na motema nyonso « matondo », mpe kopesa na ngala na ye moko. Ezali mobeko ya Nzambe oyo esalemi na ndenge ya « mobeko ya cause na effet » (mobeko ya ntina mpe mbano). Lifuti elingi ete ntango ozwi eloko moko ya malamu uta na moninga, na nsima, osengeli komitya na disposition morale mpe spirituelle ya kopesa ye mpe eloko mosusu ya malamu, engebene na makoki na yo ya ntango wana. Mobeko ya lifuti elingi ete moto moko te azala na kotalela moninga ntango nyonso kozanga contrepartie. Moto nyonso asengeli komema libanga na ye na mosala…

Mobeko ya bomoto ya lifuti

Mobeko ya lifuti elandaka logique ya « kopesa mpe kozwa » to « kozwa mpe kopesa », elingi koloba kozala na botɔndi mpo na bolamu, mpo na oyo tozwi na bolamu, mpe na nsima, komitya na disposition ya koloba na motema nyonso « matondo », mpe kopesa na ngala na ye moko. Ezali mobeko ya Nzambe oyo esalemi na ndenge ya « mobeko ya cause na effet » to « mobeko ya réciprocité ya ba effets ».

Lifuti elingi ete ntango ozwi eloko moko ya malamu uta na moninga, na nsima, osengeli komitya na disposition morale mpe spirituelle ya kopesa ye mpe eloko mosusu ya malamu, engebene na makoki na yo ya ntango wana.

Mobeko ya lifuti elingi ete moto moko te azala na kotalela moninga ntango nyonso kozanga contrepartie. Engebene na mobeko oyo, moto nyonso asengeli komema libanga na ye na mosala, moto nyonso asengeli kondima oyo azwi uta na moninga, mpe asengeli kozala na likoki ya kopesa mpe, na ndenge ya makoki na ye.

Mpo na kolonga na ekateli oyo ya « kopesa mpe kozwa », osengeli kozala na lofundu te. Pasi, ezali na batu oyo bazali makasi na lofundu. Catégorie oyo ya batu balingaka te kozwa uta na basusu mpo ya koloba ete bazali na bango moko.

Soki ozali kosala bongo, ezali ete ososoli eloko moko te na lifuti ya malamu. Mobeko oyo elingi ete tozala na komikitisa, mpe mingimingi na botɔndi ya geste moko, ya bolamu nyonso, mpo na komitya na disposition ya kosala mosala oyo ya valeur spirituelle makasi.

Na likambo oyo, ba-Africains bazali ba exemples mabe. Na makambo mingi, balingaka kozwa, kozwa mingi, kozwa ntango nyonso. Na contraire, ba-Africains balingaka te kopesa na nsima ya bolamu oyo bazwi. Bango bakanisaka ete basengeli kozala ntango nyonso na charge ya moninga.

Mo-Africain akanisaka ete moninga na ye azali na ntango nyonso mingi, makasi, ebele ya kopesa mpe kokabola. Kasi, mo-Africain akanisaka ete biloko na ye ezali na motuya mingi mpe ezali kaka mpo na ye moko. Yango ezali momesano mabe oyo esengeli kobongisa.

Basusu bakanisaka ete bazali na eloko moko te ya kopesa mpo bazali babola. Soki okanisi bongo, okozala mobola mpo na libela. Okanisi nini na mwasi mobola oyo apesaki na offrande mbongo moke mibale, esalaka ndambo ya centime, na lifuti ya Liloba ya Bosolo ya Yesu-Klisto oyo esalisaki ye? Offrande yango ezalaki na motuya mingi koleka ya bazwi mingi mpo mwasi mobola « atiaki oyo asengelaki, nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika ».

Superflu esepelisi ngai te, kasi oyo ewutaka na motema. Kopesa na motema nyonso offrande na Nzambe ezali lolenge moko ya botɔndi, ya lifuti ya bolamu ya Ngai, Nzambe ya seko.

Napesi bino ndakisa mosusu ya Anne, mwasi oyo azangaki kobota, oyo asɛngelaki ngai, na mpasi ya motema, mbula mingi, mpo azwa mwana. Ntango Nayokaki mabondeli na ye, Anne abulisaki ngai mwana na ye Samwel mpo asalela ngai bomoi na ye mobimba. Mwasi oyo asalaki bongo mpo na kokumisa elaka na ye mpe na kondima ngolu ya Nzambe.

Ye mpe mobali na ye bapesaki ba offrandes, kasi kobulisa mwana na ye na Nzambe ya seko ezalaki kaka lifuti oyo amonaki ete ezali na motuya ya oyo nasalaki mpo na ye. Tika ete bandakisa oyo ezala mateya mpo na bino!

Batu mosusu bamonaka malamu kofuta mbongo ya consultation médicale mpe ba ordonnances ya ntalo makasi, kasi baboyaka kopesa lifuti na mosaleli ya solo ya Nzambe oyo azali na makabo oyo abikisaka bango na bokono oyo ebikaka te na kotiela kaka mabɔkɔ. Basusu bakitisaka bosembo ya profeta ya Nzambe, kasi balingaka kofuta mbongo mingi na marabout ya satana oyo apesaka bango bilaka ya kobebisa.

Ba-Européens bazali na contraire ya logique oyo ya ba-Africains. Mingi na bango bazali nokinoki na lifuti. Bayokaka mawa mpe baboyaka kozala na passivité na charge ya basusu to kozwa kozanga contrepartie.

Na mobimba, batu bazali na botɔndi te ya bolamu na Ngai. Nini bokoki kopesa Ngai na lifuti ya pema ya bomoi oyo napesaki bino? Ngai, Nzambe ya seko, nakelaki bino na esengo, na elilingi na Ngai mpe na ndenge na Ngai. Nasalaki yango mpo nazali Nzambe Mokeli ya Univers. Nasalaki yango na ngolu, na kozela ete bopesa Ngai na lifuti, botosi ya Mibeko na Ngai ya Bule, Mibeko na Ngai zomi mpe Mokano na Ngai. Yango elingaki kokoka ngai mingi. Soki te, nini bokoki kopesa ngai oyo ekokani na bonene mpe bolamu oyo ya Nzambe, na nyonso oyo natiaka na ngolu na disposition na bino?

Mibeko ya lifuti mpe ya dîme ekendaka elongo. Mobeko ya dîme ezali suite logique ya mobeko ya lifuti. Napesaka bino mosala mpe mbongo oyo ewutaka na yango, engebene na mission oyo napesaka moto nyonso; engebene na bonene na ye, na rang social na ye, etc. Nasalaka makambo oyo nyonso na ofele mpe na Bolingo.

Na nsima, mobeko na ngai ya lifuti elingi ete bopesa ngai eteni ya mbongo na bino na lolenge ya dîme. Bomonaka te ete yango ezali na ordre normal mpe logique ya makambo? Moto nyonso oyo aboyaka na motema na ye kofuta dîme, azali kozipa nzela ya mobeko ya lifuti automatiquement. Moto yango azali na botɔndi te.

Mobeko ya lifuti ebengisaka moto nyonso na kosala mosala ya lisanga oyo epesaka bato nyonso litomba. Mobeko oyo epekisaka moto kozala lokola parasite, moto ya gombo oyo alukaka ntango nyonso kozwa litomba uta na basusu, kozwa uta na basusu kozanga mposa ya kopesa likabo na ye.

Ntango ozali na ba dispositions malamu ya morale mpe spirituelle, okoyoka ntango nyonso mposa ya komema contribution moke ntango moninga abengisaka yo na festival, anniversaire to kokabola eloko elongo, na atmosphère ya molunge mpe ya esengo.

Na botosi ya lifuti, okoki kondima kopesa na komema bouteille ya bière, vino, champagne, bonbons to gato moke, glace, etc.

Okokende na ba vacances epai ya baboti to moninga. Oyebi ete na kokende, okosala ba charges. Na lifuti ya yango, okoki komema ndakisa, ba régimes mosusu ya banane, ba ignames, loso, etc.

Mobeko ya lifuti elobi te ete esengeli obligatoirement mpe nokinoki kopesa na matériel to na mbongo eloko ntango ozwi. Mobeko oyo esɛngi kaka komitya na disposition ya kondima bolamu. Ntango mosusu, « matondo » moko ya solo oyo ewutaka na nse ya motema, « matondo » oyo etonda na bolingo oyo ememaka mapamboli epai ya oyo apesaki yo, ezali mpe lolenge mosusu ya lifuti.

Soki Ngai, Nzambe ya seko, Naseŋgi bino, bana na Ngai, botɔndi mpe lifuti, mpo nakelaki bino, mpo nabatelaka bino, napesaka bino nzoto malamu, butu mpe moyi, bongo bososolaka pete ete bosengeli mpe kozala bongo epai ya baboti na bino oyo babotaki bino.

Baboti na bino bazali baoyo napesaki bino na mabɔkɔ na bango. Na kondima bino, basalaka mosala ya kokitoko ya kopesa bino bomoi na mabele.

Ezali Ngai nde nakelaki bino, kasi nasalaka ete processus ya koleka na bino uta na mokili ya likolo na mabele esalema na baboti na bino. Bongo, bosengeli kopesa bango botɔndi.

Lifuti nini bokoki kopesa baboti na bino, bino bana? Naseŋgi bino te kotala oyo basalaki mpo na bino, to kotanga mbongo mpo na bango, ntango bokomi independants, autonomes financièrement mpe socialement. Te, lifuti esalemaka bongo te.

Lifuti oyo esengeli, ezali kokumisa baboti oyo bapesaki bino mateya malamu ya spirituel. Soki bomonaka bango bafanaka kopesa bino bomoi, mpe bapesaki bino mateya spirituelle oyo Ngai nazalaki kozela, bongo, moko ya ba compensations malamu mingi, ezali kokumisa bango mpo bapesaki bino motamboli malamu, mpo na elongi na bino ya social, na liloba moko, mpo na oyo bokomi.

Lifuti esengeli koyokama na motema nyonso mpe na bonsomi. Esengeli kouta na mouvement spontané, na disposition malamu ya kati ya moto oyo azali na mposa ya lifuti. Kobanda ntango kaka oyoki ete osengeli kosala, kopesa na nsima, kopesa na lifuti, obligation mpe hypocrisie elongolaka nionso ya kozongisa bolamu ya lifuti.

Ngai, Nzambe, natalaka ntango nyonso état intérieur ya moto nyonso oyo azali kosala. Yango nde mobeko na Ngai.

Soki moto nyonso azalaki na mposa ya lifuti, soki moto nyonso azalaki kobika na logique ya kotosa mobeko ya lifuti, elingaki kozala pete mpo na bino mpo na koboya ba situations ya parasitisme, ya dépendance to ya kozala charge ya mpamba mpo na moninga. Bongo, mabele mobimba elingaki kozala mokili oyo ezali na bomoi ya boyokani, mokili oyo moto nyonso apesaka mpe azwaka na nsima. Moto moko te alingaki kozala charge mpo na moninga.

Mpo na Ngai Nzambe, entraide esengeli kozala eloko ya malamu: molimo, mosala mpe etamboli ya malamu. Yango emonisaka mpe ntina nini Ngai nakabolaka makabo na bino na ndenge na ndenge na libota mpe na société. Ezali lolenge moko ya kotinda bino na entraide.

Ndakisa: moto mosusu apesakaka bino lobiko na nzela ya likabo na ye ya bomoto. Na kondima mpe na lifuti ya bolamu yango, bokoki kosalisa ye kotonga ndako na ye na nzela ya likabo na bino ya architecte, etc.

Nakelaki bino bongo na diversité mpe na complémentarité mpo na kolendisa na bino liyoki ya entraide. Yango mpe nde kosala kitoko ya bato. Moto nyonso apesaka oyo azali na yango, na lifuti ya oyo azwi uta na moninga. Yango ezali kitoko mpe malamu, mpe esengeli kosalema na bolingo ya bino mibale.

Soki ekomi ete ozali na eloko moko te ya kopesa na lifuti ya bolamu, bongo tɔnda moto oyo asalisi yo na motema nyonso mpe sambela Ngai Nzambe mpo Nasala lifuti oyo ekokani na mosala mpe na circonstance, mpo namonaka na mitema na bino. Nionso efutamaka, eloko moko ebunga te.

[1] Marc 12 :44, [2] 1 Samuel 1 :9-28

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !

Traduction du message original "La loi naturelle de la compensation", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Sources Ph. illustration: www.freepik.com