Ekobo na Nzambe
Bozali kosala mobulu na bososoli ya Mibeko na Ngai Zomi mpo na misala na bino ya masumu. Bosengeli koyeba ete kosala ekobo, ezali kobuka boyokani ya sembo, ya kozala penepene, ya kosangana kati ya bato mibale oyo basangani na molimo. Yango wana, bozali kosala ekobo ntango bozali na makambo mosusu ya liboso koleka Ngai Nzambe, pamba te Ngai nazali Mokeli na bino mpe mobali na bino ya liboso. Bozali kosala ekobo ntango bozali kotya makanisi na biloko ya nse koleka mosala na Ngai...
Moyize apesaki bino Mibeko na Ngai Zomi mpo na lobiko na bino, kasi tii lelo bozali koluka te kososola yango mozindo, mpe koleka wana kotya yango na misala te. Mingi kati na bino bozali kobuka Mibeko na Ngai na bonsomi mpo na kozanga likebi, goyigoyi, kobungana nzela mpe kozanga kondima. Kasi moto ata moko asengeli koyeba te Mibeko na Ngai ya Bule. Mibeko na Ngai ezali kati na bino banda ebandeli, pamba te nakelaki bino na elilingi na Ngai mpe na lolenge na Ngai.
Bozali kosala mobulu na bososoli ya Mibeko na Ngai Zomi mpo na misala na bino ya masumu. Nini bozali kobomba na Mobeko ya Motoba "Okosala ekobo te!"? Ya solo, Mobeko oyo ezali kopesa bino makanisi bobele na kozanga sembo kati na libala ya mobali-mwasi, nzokande ezali koloba makambo mingi koleka wana.
Bosengeli koyeba ete kosala ekobo, ezali kobuka boyokani ya sembo, ya kozala penepene, ya kosangana kati ya bato mibale oyo basangani na molimo. Napesi bino bandakisa mosusu mpo na kosalisa bino kososola Mobeko oyo mozindo: bozali kosala ekobo ntango bozali na makambo mosusu ya liboso koleka Ngai Nzambe, pamba te Ngai nazali Mokeli na bino mpe mobali na bino ya liboso. Bozali kosala ekobo ntango bozali kotya makanisi na biloko ya nse koleka mosala na Ngai. Bozali kosala ekobo soki bolingi eloko moko koleka Ngai Nzambe, tii kokweya na kokumisa bikeko. Yango wana, napesaki bino Mobeko ya Liboso "Ngai nazali Nkolo Nzambe, Nzambe na yo; okozala na banzambe mosusu liboso na Ngai te!". Lisusu, bosengeli koyeba ete Ngai nazali Nzambe ya zuwa oyo apesaka etumbu makasi na kokumisa bikeko.
Abraham amonami lokola Tata ya kondima mpo azalaki na kondima na Ngai mpe azalaki kotosa Ngai kozanga kotyela. Kasi, ye asalaki libunga ya kobuka Mobeko na Ngai ya Motoba ntango akangamaki na bolingo ya mwana na ye Isaka tii kotika mosala na Ngai, na ntango moko ya mosala na ye. Na etamboli oyo, Abraham asalaki ekobo liboso na Ngai Nzambe. Yango wana, natiaki ye na komekama oyo ezalaki kosenga ye abonza mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi. Komekama oyo ya mpasi esalisaki Abraham azonga na makanisi mpe atala na ngambo na Ngai Nzambe.
Bosengeli koyeba ete kolinga na miso ya mpamba mobali na yo, mwasi na yo, bana na yo, biloko na yo ya nse... tii kobungisa makanisi, ezali kosala ekobo liboso na Ngai Nzambe. Na makambo nyonso, esengeli koyeba kobatela makanisi mpe kozala na bomeseni.
Adamu asalaki ekobo ntango atiolaki malako na Ngai mpo na kolanda oyo Eve asengaki ye asala. Nzokande, Ngai napekisaki polele Adamu alia mbuma ya boyebi ya malamu na mabe. Kasi, ye aponaki kolanda toli ya Eve mpo na kobuka malako na Ngai. Banda ntango wana, Adamu abukaki bozali penepene, libala kati ya ye mpe Ngai Nkolo Nzambe. Yango wana, nabenganaki ye na Elanga ya Edeni.
"Ngai nazali Nkolo Nzambe, Nzambe na yo; okozala na banzambe mosusu liboso na Ngai te!". Soki ezali bongo te, bolingo na yo ya mbongo mpe makambo ya pamba ya mokili oyo ekokweyisa yo. Ngai nazali oyo apesaka, yango wana mpo na nini kozangisa mosala na Ngai, bozali penepene na Ngai, bozala na Ngai, nsango na Ngai, malako na Ngai, ndai na Ngai? Mpo na nini bozali kozangisa Ngai, nzokande boyebi ete ntango ya lelo ezali mabe? Bozonga na makanisi!
Boyebi malamu ete soki Ngai nazali na bino te, bobungani nzela; soki natambolaki na mipanzi na bino te, bokozala kala na lilita. Kasi, atako makambu nyonso oyo, bobateli nyonso oyo ezali zingazinga na bino, na moyi mpe na butu, bozali kozangisa mosala na Ngai; bozali kozangisa Ngai. Mpe bozali kosala ekobo na Ngai.
Napesaka bino bobateli oyo ekweyi te liboso ya minyoko nyonso oyo, bato nyonso oyo bazali koluka kosala bino mabe. Kasi, ntango etali Ngai, oyo Ngai nalingi, bozali kozangisa Ngai. Bozali kosala na motema moko te makambo nyonso oyo nasenga bino. Bozali na bolingo na yango te. Nzokande, bozali koluka bobateli na Ngai, bozali koluka mbongo na Ngai mpe bozali kobaluka na ngambo na Ngai, mbala nyonso oyo bozali na mposa. Ezali na makanisi ya malamu yango banda na bino?
Bokanisi ete ezali mpasi kosala mosala ya Nzambe. Bomonaka ete nazali kosenga bino mingi. Bokozala nini kozanga Ngai? Bokozala nini, soki nazalaki na bino te? Nalembi te kobatela bino mpe kopesa bino bamposa na bino. Nalembi te kopesa bino nzoto kolongono. Nzokande, boyebi te ata moke na etumba oyo ezali kosalema na nkuku mpo na kopesa bino nzoto kolongono. Na bozongisi, kondima eloko moko te kowuta na bino. Mpe bomonaka yango lokola ezali malamu.
Boboyi kopesa, ata ntango na bino. Bomonaka ete ezali kosenga bino mingi, ezali mpasi kosolola na Ngai. Bozali na makoki te ya kofanda ngonga moko mpe kosolola na Ngai na losambo, na kokila bilei. Nzokande, bosenga ete bapumbwa bino ntango bosenga. Na nani bozali kosala mabe nyonso oyo? Bozali kosala lokola boyebi Ngai te?
Boyeba ete Ngai nazali na liloba ya suka. Ngai nazali ebandeli mpe nsuka. Ngai nazali Moyangeli ya bomoi nyonso na likolo, na mabele mpe na nse ya mabele. Ngai nazali etima ya mai, mpe moto nyonso, nzete nyonso oyo ezali pembeni ya etima oyo ya mai ekokawuka ata moke te. Ngai nazali moko kala, lelo mpe mpo na libela; Ngai nabongwani te mpe nakobongwana te. Nazali kozela bino na nsuka. Na kosambisa, moto nyonso akozongisa mpo na oyo asalaki.
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "L’adultère à Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
