Kondima na Nzambe
Koyeba ete Nzambe azali Mozalisi ya Molongo mobimba, mpe kozala na kondima epai ya Nzambe yango ya Likolo-Likolo, ezali makambo mibale ekeseni, oyo esengeli, na bosembo, ekokisana. Ya solo, kozala na kondima epai ya Nzambe esengeli kozala suite ya mayele, nsima ya koyeba ete Nzambe kaka moko azali... Kondima, motema-pekisa, elikya makasi mpe kobanga Nzambe, etambolaka esika moko. Yango nde esengeli kotinda bino na bomoi ya bosantu mpe ya botosi Nzambe...
Koyeba ete Nzambe azali, lokola Mozalisi ya Molongo mobimba, mpe kozala na kondima epai ya Nzambe wana ya Likolo-Likolo, ezali makambo mibale ekeseni, oyo esengeli, na bosembo, ekokisana. Ya solo, kozala na kondima epai ya Nzambe esengeli kozala bosuka ya mayele, nsima ya koyeba ete Nzambe se moko azali. Mayele wana elandaka bokoli ya bomoto.
Na ebandeli, tango Nazalisaki bino awa na mokili, bozalaki na boyebi ya pamba ya bozali na Ngai. Yango wana bozalaki kogumbamela Ngai na nzela ya madusu ya mabanga, nkake, mokalikali, banyama ya mabe mpe biloko mosusu ebele oyo bozalaki kobanga. Ndenge wana ya kogumbama ezalaki libandeli ya bosambeli ya banzambe ebele. Mpo na kobongisa yango, Natindaki mosaleli na Ngai Abrahamu, oyo amemaki bomoto na boyebi ya Nzambe se moko mpe na komonisa kondima epai ya Nzambe wana.
Likambo ezali ete botikalaki bango kaka, na mibeko na bino mpe na misala na bino ekeseni. Yango wana, Natindaki Moyize mpo na koyokanisa bino na likolo ya Mibeko na Ngai zomi. Soki makambo elandaki ndenge ekanamaki, bosengelaki, kino lelo, kozala esika moko na kogumbamela Nzambe wana se moko, na misala oyo ekokani na oyo ezali na Likolo. Kasi na mawa, bomoto elekisaki ntango wana kobomba mabe na yango. Botikalaki kaka na etape ya kogumbamela bikeko, zamba ya bule, mayi, banyama... oyo esali bonkoko na bino. Na liloba moko, bozali na etape ya kogumbamela bademo. Bonkoko ezali mibeko ya bomoi oyo epesami na satana. Misala ya bonkoko etindaka baboti mosusu koteka molimo ya bana na bango epai ya zabolo, kobanda na mbotama na bango.
Napesi bino bandakisa mpo bosangwa malamu. Kobanda na mbotama, baboti basalaka milulu, mabonza ya bansoso, bameme, bangombe, bilei... mpo na kopesa bomoi ya bana na bango epai ya bilimo ya mayi, ya zamba ya bule, ya libulu ya bule, na kolaka ete bana wana bakoya kogumbamela bango na mikolo ekoya. Yango nde ebengami koteka molimo ya mwana na ye epai ya zabolo. Ndenge wana ya boyokani elandaka mwana bomoi na ye mobimba, mpo satana atalaka ye lokola eloko na ye, moyekoli na ye.
Soki akoli, mwana ayebaka te boyokani wana to aboyaka kotosa yango na kokende na lingomba. Ezali solisyo malamu, kasi nani, na kati ya lingomba, akoki mpe andimaka kopesa ntango oyo esengeli mpo na kobunda na bilimo, na bademo ya boyokani wana? Na bantango ya ebandeli, bozali na mposa ya moto oyo akosalisa bino kososola likambo, na nsima akotambwisa bino mpe akosalisa bino kobunda na zabolo. Nzokande, mangomba na bino ezali na ntango wana te, ata soki mokano ya kosalisa bino ezali. Boyebi maloba na bango ya momesano. Mbala mingi, balongolaka bino na kolakisa bino bavɛrsɛ ya Biblia ya kokanisa to ya kobondela. Litomba na yango: bomizwaka bino moko na etumba wana ya makasi liboso ya satana mpe baboti na bino moko oyo bakangami na bonkoko. Bomoi na bino ebebisami mpe eloko moko etambolaka te: dipomo te, mosala te, libala te, mikakatano ya nzoto, mpe mosusu.
Bato mingi basukisaka na kotika etumba, bamipesaka na maboko ya baboti mpe basukaka na kindoki mpo na kogumbamela bonkoko. Bosali nini na losambo? Ya solo, bozalaka moko te ata mokolo moko, mpo Nazalaka pembeni na bino na makambo ya ndenge wana. Esengeli bino kaka kozala na kondima, kobondela Ngai na motema moko, kozala na motema molayi mpe Nakosalisa bino kosilisa likambo na ndenge oyo bokanisaki te. Boye nde bosalaka? Bobwakaka mopanzi kaka na bangonga ya liboso ya etumba, nzokande boyebi ete Nazali. Kondima na bino epai na Ngai, Nzambe, ezali wapi? Ezali mawa ete ata basaleli na Ngai ya minene bakimaka likambo. Nsɔni nini !
Kozala na kondima epai ya Nzambe ezali te ndenge bokanisaka. Abrahamu, "Tata ya kondima," apesaki bino ndakisa ya kondima. Longola yango, basaleli na Ngai batyaki mpasi mingi na likambo oyo na maloba oyo: « Soki kondima ezali te, ekoki te kosepelisa Ye; pamba te esengeli ete moto oyo apusanaka pene ya Nzambe andima ete Nzambe azali… »[1]. « Ezali na nzela ya kondima nde toyebi ete mokili esalemaki na Liloba ya Nzambe »[2]. Yesu akendaki mosika koleka mpo na koloba na bino : « Soki bozalaki na kondima lokola nkona ya mutarde, bolingaki koloba na ngomba oyo: Longwa awa, kende kuna, mpe ekolongwa; eloko moko te ekozala pasi mpo na bino »[3]; Nini mosusu nasengeli koloba na bino oyo nateyaki bino nanu te ?
Kondima, motema-pekisa, elikya makasi mpe kobanga Nzambe etambolaka esika moko. Yango nde esengeli kotinda bino na bomoi ya bosantu mpe ya botosi Nzambe. Nazali na basaleli ya solo ya Nzambe oyo bapesaka Ngai esengo mingi na ndenge wana. Ntango mosusu, babundisamaka na maloba ya bandoki mpe ya bato ya makambo ya nkuku, kasi basalaka kaka mwa losambo moke na kondima mpe balalaka lokola bana mike minene. Na ntongo, bakanisaka bitumba ya makasi ya butu oyo Molimo Mosantu na mampinga na Ye babundaki, lokola na ndoto epai bangungi minene ya mwindo ezalaki kopumbwa likolo ya ndako na bango, na nsima móto moko ya nguya elongolaki yango nyonso. Na makambo mosusu, Napesaka bango nzela te ya komona makambo oyo esalemaki na butu. Ezali Ngai, Nzambe, nde nasalaka likambo na likambo. Nazali Nkolo ya bantango mpe ya makambo. Nazali Nkosi ya libota ya Yuda. Nani akoki liboso ya elongi na Ngai ?
Kozanga kondima na bino esalaka bino koningana, koningana lisusu mpe kokweya na libaku moke ya komekama. Na makambo mingi, mikakatano na bino oyo bobengaka bongo ezali komekama na Ngai mpo na komeka kondima na bino. Bonkoko na bino mpe satana bakoki nini liboso ya elongi na Ngai? Bótelema na losambo mpo bómemama te na mbonge ya nsuka ya mokili !
[1] Hébreux 11:6, [2] Hébreux 11:3, [3] Matthieu 17:20
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "La foi en Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
