Komikaba pe kopesa bomoi na yo mobimba

Moto oyo alingi kolanda Ngai asengeli kobotama lisusu. Asengeli kolongola misisa ya mabe pe koluka kolongwa na mbindo nyonso ya molimo, na kosala makasi na ye moko. Mosala oyo esengeli komema ye na komikaba. Mpo na yango, asengeli kotika nyonso oyo ezali malamu te kati na ye, mpo na kobotama kati na Klisto, na bomoi ya sika ya bosantu. Yesu Klisto alobaki na bino: « Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya... »

Komikaba pe kopesa bomoi na yo mobimba

Na solo nayebisi bino, komikaba, bosantu, kopesa bomoi na yo mobimba pe botosi ezali maloba ya motuya mingi mpo na bokoli na bino ya molimo awa na mabele. Bato nyonso oyo bakokoka koleka na biteni wana ya losambo ya Nzambe, bakozonga na paradiso tango bakokufa. Nzokande, na mobulu oyo ezali na mokili lelo, ekoki kosalema te komona nzela oyo ememaka epai na Ngai Nzambe, soki osali te makasi na yo moko, mpo na kolongwa na masumu mingi pe nzela ya mabe oyo etondi bisika nyonso. Ezali malakisi oyo Mwana na ngai Yesu apesaki bino na lisese na ye: « Bokonzi ya Likolo bazwaka yango na makasi, pe ezali bato ya makasi nde bazwaka yango » [1].

Ntango mingi eleki banda bobotamaki ya liboso na mabele kino lelo. Bokweyaki na lisumu pe botikali kaka kati na yango. Mbuma ezali ete bino nyonso bobongoli ezaleli, na kozwa bizaleli ya sika oyo etongami na mimeseno ya mabe. Moto nyonso amemi kati na ye mbeba nyonso ekoki kozala, na ndenge ekeseni. Na mbala nyonso oyo boleki na mabele bobakisaka na esika ya kopetola yango. Na suka, bato bakomi ndenge mosusu na bana ya Nzambe oyo nakelaki.

Moto na moto akobaka koloba ete ye azali malamu koleka, azangi kopamela pe mbeba. Kolingaka kaka yo moko oyo elalisaka ezali kopekisa bino kotala lisusu bomoi na bino ya molimo mpo na komitala na bosembo pe komona nini ezali kotambola malamu te kati na bino. Lolendo ekangaka bino na bokoki nyonso ya komibongola. Moto andimaka te kopamela, ata ndenge nini ezali. Ndenge nini bokobima soki boyinaka solo? Bozali na ntembe ete bososoli bwanya ya Mwana na ngai Yesu: « Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye pe mosusu ? » [2]

Alingaki kaka kosenga na bino kondima solo ya kopamela. Bozala na esengo ete moto oyo alingaka bino, ayebisa bino nini ezali kotambola malamu te kati na bino. Ata soki esalaka bino mpasi, bomikitisa, bosala makasi na bino, na nsima bosenga na moto yango ayebisa bino ebele, mpo na bolamu na bino. Na ndenge wana, bokokoka koyeba nini ezali kotambola malamu te kati na bino mpo na kobongola yango. Mosala ezali pete te mpo ete moto nyonso akanisaka ete azangi kopamela nyonso, lisumu nyonso. Oyo eleki mabe, moto nyonso akanisaka ete azangi liteya ya kozwa epai ya moto mosusu. Bolingo na ngai ezali mingi kino mbala mosusu, natindaka Baanzelu kosalisa bino na kopamela, na balabala to na esika ya bato ebele. Bozangi liteya ya kozwa epai ya Baanzelu na ngai, na lolenge ya bato? Esalemaka pe ete nasala mbala moko na moko ya bapaya na bino mpo na kobenda bokebi na bino na oyo ezali kotambola malamu te kati na bino. Bokanisi nini mpo na yango? Bomikitisa!

Moto oyo alingi kolanda Ngai asengeli kobotama lisusu. Asengeli kolongola misisa ya mabe pe koluka kolongwa na mbindo nyonso ya molimo, na kosala makasi na ye moko. Mosala oyo esengeli komema ye na komikaba. Mpo na yango, asengeli kotika nyonso oyo ezali malamu te kati na ye, mpo na kobotama kati na Klisto, na bomoi ya sika ya bosantu. Yesu Klisto alobaki na bino: « Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya, amema ekulusu na ye, pe alanda ngai. Mpamba te moto oyo akoluka kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai akozwa yango. » [3]

Soki bosali mosala yango malamu, bokokoma koyoka ete bozali bapaya koleka na mokili oyo. Bokokoma koyoka nkele na makambo ya bisengo ya mokili, nzela ya mabe, masumu... Boye, ekobanda eteni ya losambo ya solo ya Nzambe na kopesa bomoi na yo mobimba. Kosambela Nzambe ezali koluka mokolo na mokolo kotambola kolanda Mibeko na ngai ya Bosantu, Mibeko na ngai Zomi pe komikaba na Mokano na ngai. Mpo na yango, bosengeli kokengela etamboli na bino, bilamba na bino, bilei na bino, baninga na bino pe kokeba na nzoto na bino. Misala na bino, maloba na bino pe makanisi na bino esengeli kolanda oyo ngai nalingi. Na liloba moko, bosengeli kobika na kobanga ngai, na koyeba ete nayebi nyonso, nakoki nyonso pe nazali bisika nyonso. Bosengeli kozala na ntina ya kobika kaka mpo na Ngai Nzambe na bino ndenge bomoi ya botosi etindaka.

Nyonso oyo ezali pete mpo na koyoka, kasi banda kala nazali kozongela bino makambo yango kaka na nzela ya basakoli na ngai, batindami na ngai. Mwana na ngai ayaki kolimbola bino malakisi oyo, na nsima mosungi, Molimo Mosantu akotaki na bozindo ya makambo oyo nyonso. Nasala lisusu nini mpo na kolamusa bino?

Oyo eleki mabe ezali ete bato penepene nyonso ya mokili oyo balobaka ete bazali na eloko moko te ya komipamela, nzokande Ngai Nzambe, namoni ete bato penepene nyonso babungi nzela. Na Solo, malakisi na ngai ezali kaka mpo na mwa ndambo ya bato. Motango ya bato ya kobikisa na mokili oyo ezali moke koleka na ntango ya Yesu Klisto. Boye, bobunda na nzoto pe molimo mpo na kozala kati na baoyo bakozonga na paradiso. Mpamba te ntango etikali lisusu te, bangonga ya suka ya ntango ezali kobeta.

[1] Matthieu 11:12, [2] Luc 6:29, [3] Matthieu 16:24-25

[1] Matai 11:12, [2] Luka 6:29, [3] Matai 16:24-25

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "Abandon de soi et don de soi", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Source Ph. illustration: www.freepik.com