Miangu ya Nzambe
Nalobi na bino na Solo, na Solo, miangu na Ngai ezali kosila te mpe ekoki kososolama te. Ezali ya kokota te kobanda na ebandeli kino na suka ya makambo. Ezala eloko nini ya nzambe, ata ba-archange bakoki te komilobela ete bayebi nini Ngai Nzambe, Nabongisi... Na kokokisa mwango P moko ya kopesama, Nakoki kozwa lolenge na lolenge ya bokeli mpe mayele, kasi mikano mpe suka na yango ekoki kobongwana te... Nazali Nzambe ya Seko, bilaka na Ngai ekokisami ntango nyonso, na tango oyo ebongi.

Nalobi na bino na Solo, na Solo, miangu na Ngai ezali kosila te mpe ekoki kososolama te. Ezali ya kokota te kobanda na ebandeli kino na suka ya makambo. Ezala eloko nini ya nzambe, ata ba-archange bakoki te komilobela ete bayebi nini Ngai Nzambe, Nabongisi. Na bokokelami na bango, ba-anjelu mpe biloko nyonso ya kongenga bazali na bonsomi ya kopona te. Bazali kobika na botosi ya makasi ya Mibeko na Ngai mpe Bolingi na Ngai. Na Paradiso, makambo nyonso ezali ya kobongisama mpe kotambusama na Mibeko ya Nzambe. Lisumu ezali kuna te. Yango wana bomoi kuna ezali ya seko.
Bino bato, bozali ntango nyonso na lofundu ya koyeba nyonso, kososola nyonso likolo ya bonsomi ya kopona oyo Natiaki kati na bino. Boyeba kondima bandelo na bino. Bozali kolobela nini tango bolobi: "nzela ya Nzambe ekoki kososolama te"? Ezali te miangu na Ngai nde ezali likambo awa? Ezali ya solo, Nzela ya Nzambe ebengami lokola Miangu ya Nzambe. Miangu na Ngai ezali na lolenge ya bokeli mpe mayele ya kosalela, mikano ya kokoma mpe suka moko.
Na kokokisa mwango P moko ya kopesama, Nakoki kozwa lolenge na lolenge ya bokeli mpe mayele, kasi mikano mpe suka na yango ekoki kobongwana te. Yango epesaka mbala mingi makanisi ete miangu na Ngai ebongwani. Na bosolo, ezali mwango moko P oyo ekomaki miangu A, B, C... kolanda ndenge zabolo azali koningana mpo na kotelemela yango to lisusu likolo ya kokanga ya bososoli mpe ya bokembi ya moto, lisanga to bato bazwami.
Ezali Ngai, Nzambe Mokeli na bino, Nkolo ya tango mpe makambo. Nazali Nzambe Moko oyo asalaka makambo nyonso na ntango na yango kolanda miangu ebele oyo Natiaka. Mpo na nini botombokeli miangu na Ngai ya ndenge na ndenge? Bana na Ngai mosusu balobaka mbala mingi: "Nzambe azali na koumela; asalaka te makambo oyo alobi. Abongolaka nyonso, tango nyonso". Na likambo oyo, Nayanoli bino ete ezali Ngai Nzambe nde nakelaki bino boye Nayebi bino malamu koleka bino moko. Na makambo mingi, bozali bato ya kondimama te. Lisusu, bomitalisaka kitoko na bokosi na bino ebele. Yango wana, ezali te ya sembo kobongola miangu mpo na kobundisa bozangi bosembo mpe bozangi ya kondima na bino epai na Ngai?
Nazali na miangu ebele mpo na moko moko na bino. Soki mwango A esimbi te, Nakozwa mwango B, mpe bongo na bongo. Nasalaka boye mpo botalisaki Ngai ete bozali bato ya kondimama te. Boye, bondima mayele na Ngai. Ndakisa ya Lucifer esalaki Ngai lokola liteya. Bofingaka Ngai, Nzambe na bino, ata soki na bokasi ya bozangi kondima na bino nyonso, Nazali ntango nyonso wana mpo na kosalisa bino, mpo Nazali Bolingo.
Moto moko te akoki komilobela ete ayebi miangu na Ngai mpo ezali ya motuya. Boyeba mpe ete zabolo azali kotambola zingazinga na bino, basali na Ngai, mpo alingi kokweyisa bino na nzela nyonso. Ezali mpo na yango nde mayele na Ngai ya mosala etikali ya kokota te. Bokozalaka ntango nyonso na makanisi ete miangu na Ngai ebongwani nzokande ezali bongo te na makambo ya solo.
Na lolenge, miangu na Ngai ebongwanaka kolanda bino mpe etambolaka kolanda makambo oyo ekelamaka na bino. Napesi bino ndakisa moko: Natindi moko ya basakoli na Ngai ya basi kopesa nsango ya kokebisa na moko ya basali na Ngai. Na ebandeli, mosakoli ya mwasi alobi na ye ete Nazali na lolendo na ye mpo abatelaki elaka na ye ya kosalela Ngai atako mikakatano nyonso alekaki. Nzokande, kaka na mosala, na kokokisa misio oyo Napesaki ye, ye akamati nzela mosusu likolo ya lolendo oyo abongisaki na ntango na ntango. Na yango, mosakoli ya mwasi apesi ye bolandi ya nsango na Ngai oyo ezali ya kotindela ye likebisi mpo azonga na makanisi mpe azonga na nzela wana ezali naino ntango.
Na ndenge mokoki kondima te, ye atombokeli mosakoli ya mwasi, afundaki ye na lokuta, na maloba oyo: "Ezali Nzambe te nde atindi yo mpo Nzambe akoki kosanzola moto moko te mpe na ntango moko kaka kopesa ye nsango ya likebisi". Mosali asalaka boye mpo na bonkoko, bato balingaka te ete balobelaka bango solo. Lisusu, bazali na nsomo ya kobimisa bosoto na bango libanda.
Ndakisa oyo ekoki kopesa bino likanisi ya bolendisi ya miangu na Ngai? Ngai Nzambe, Nakoki kosanzola moto moko mpe na ntango moko kaka kopesa ye likebisi. Ezali na mabe moko te to kotelemelama moko te kati na yango. Bondimi ya lolenge na Ngai etambolaka na molimo ya kofungwama mpe bozwami ya bokembi ya moto azwami. Na mawa, bato bazali nyonso ndenge moko: tango nsango na Ngai ebongisi bango, ezali Nzambe nde azali koloba, kasi soki ezali bongo te, ezali Nzambe te.
Na ndakisa ya liboso, suka ya mwango na Ngai ezalaki ya kokebisa mosali na Ngai oyo abimaki na nzela ya malamu mpo azonga na makanisi mpo azala ntango nyonso pene na Ngai, Nzambe Mokeli na ye. Mpo na kokoma wana, Nasengaki na mosakoli na Ngai ya mwasi apambola ye mpo na oyo asalaki malamu na kokokisa mosala na Ngai. Lolenge oyo esengelaki kosalisa ye kofungwama na molimo mpo andima mpenzampenza bolandi ya nsango.
Miangu oyo Nabongisaka mpo na bana na Ngai ebongwanaka te, kasi ezali, nde, bana na Ngai nde babongolaka bizaleli likolo ya bozangi ya motema molai, ya kondima mpe bozangi ya bosembo na bango. Na ndakisa, Nazongisi bino na lisolo ya Sarah na nani nalobaki: "Okobota, mwasi!". Na kozanga kondima, Sarah asekaki. Na nsima, akendeki kopesa mobali na ye libunga na kosenga ye kobota mwana na Agah.
Na ndakisa oyo, bokoki koloba ete Nabongolaki mwango? Ata moke te, miangu na Ngai ebongwanaka te mpe ekobongwana te. Ezali nde bino nde bokanisaka ete miangu na Ngai ebongwanaka tango nyonso. Nzokande, bobosana te ete zabolo azali kotambola zingazinga na bino mpe alandaka makambo nyonso bosalaka. Na yango, soki Nasalelaka te mayele mpe lolenge ndenge na ndenge mpo na koyanola bino, bondimi ete bokoki kobika na mokili?
Bofungola malamu matoyi na bino ya ebende: "Tango Nalobi eloko moko, Nasalaka yango. Ata soki esakweli ewumeli, ekokokisama na ntango oyo ebongi". Na esika ya koloba ete miangu ya Nzambe ebongwanaka mpe ekokokisamaka te, mpe kofunda basakoli na Ngai ya basi mpe mibali ete bazali bakosi, bomilengela na motema molai mpe kondima.
Nakoki kotinda basakoli na Ngai koloba na mwasi moko ete akobala, mpe na mbala mosusu, kotinda bango koloba na mwasi yango moko: "Nzambe asengi yo kotala malamu bomoi ozali kotambwisa, soki te ekomema na libala te". Mpo na ndakisa oyo, bokoloba lisusu ete basakoli na Ngai balobi eloko moko mpe bokeseni na yango?
Ezali na bandakisa ebele oyo Nakoki kopesa bino, kasi tosilisa na oyo mosusu: moko ya basakoli na Ngai asakoli na libota moko ete bakobota mwana ya mobali ya kitoko, kala mingi te. Maloba ya kolimbola kombo ya mwana, mokolo, ngonga mpe esika mpenza ya mbotama bapesami bango. Na mawa, libota ekoti na kozanga boyokani mpe matonge oyo esilaka te, nsima ya esakweli oyo. Na nsima, mwasi akomi ya zemi, na mopepe oyo ya makasi.
Po na mituna ya kanda, kozongisa mabe mpe bantina mosusu ya ye moko, azwi mokano ya koyebisa mobali na ye te, na nsima alongoli zemi na nkuku. Na likambo oyo, ezali ya sembo kofunda Nzambe ete abatelaki elaka te? Bato ya mokili, botala bizaleli na bino mbala nkoto liboso ya koloba mabe na tina na Ngai. Nazali Nzambe ya Seko, bilaka na Ngai ekokisami ntango nyonso, na ntango oyo ebongi.
Miangu na Ngai ezali ebele mpe ya lolenge na lolenge. Soki na esika ya lelo ya bokoli ya bato, Nayebisi bino mwango mosusu oyo elobi ete Bible etondi na mabunga mpe mbeba ndenge na ndenge, na bongo, bino bazangi makanisi, bokoloba lisusu ete ezali Ngai Nzambe te nde nalobi yango. Bolingaka koyoka Solo te. Ezali mpo na yango nde bozali koyoka pasi, bampiaka, bababa. Boyekola kotanga kati na milongo, na esika ya ntango nyonso koluka kobundisa na nzela ya ndelo ya nzoto.
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!
Traduction du message original "Les plans de Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Source Ph. illustration: www.hiclipart.com